Ezekiele 15:1-8

  • Yerusaleme ezali nzete ya vinyo oyo ezangi ntina (1-8)

15  Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2  “Mwana ya moto, nzete ya vinyo ezali malamu koleka nzete mosusu nyonso to bitape ya banzete ya zamba? 3  Bakoki kozwa mwa nzete na nzete ya vinyo mpe kosala na yango mosala? To bato basalaka na yango pike mpo na kokakisa eloko moko boye ya mosala? 4  Talá! Babwakaka yango na mɔtɔ mpo mɔtɔ epela. Mɔtɔ ezikisaka nsɔngɛ na yango nyonso mibale, mpe ekaukisaka katikati na yango. Sikoyo mosala nini bakoki kosala na yango? 5  Ata ntango ezalaki mobimba, bakokaki kosala na yango eloko moko te. Ekozala ndenge nini ntango mɔtɔ ezikisi mpe ekaukisi yango?” 6  “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Kaka lokola nzete ya vinyo na kati ya banzete ya zamba, oyo napesá mpo ezala eloko ya kopelisa mɔtɔ, ndenge yango nde nakosala bato oyo bafandi na Yerusaleme.+ 7  Nakokóma monguna na bango. Babiki na mɔtɔ, kasi mɔtɔ nde ekozikisa bango. Mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova, ntango nakokóma monguna na bango.’”+ 8  “‘Mpe nakokómisa mokili oyo esika oyo etikali mpamba,+ mpo basali makambo ya kozanga bosembo,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”

Maloba na nse