Zekaria 7:1-14

7  Lisusu, esalemaki boye, na mbula ya minei ya mokonzi Dariuse:+ liloba ya Yehova eyelaki Zekaria, na mokolo ya minei ya sanza ya libwa, elingi koloba, na Kisleve.+  Mpe Betele etindaki Sharezere ná Regeme-meleke ná bato na yango mpo na kokitisa Yehova motema,+  koloba na banganga-nzambe+ oyo bazalaki na ndako ya Yehova ya mampinga, mpe na basakoli, ɛɛ koloba ete: “Nasengeli nde kolela na sanza ya mitano+ mpe koboya kolya, ndenge nasali yango bambula ebele boye?”+  Mpe liloba ya Yehova ya mampinga eyelaki ngai lisusu ete:  “Lobá na bato nyonso ya mokili oyo mpe na banganga-nzambe ete: ‘Ntango bokilaki bilei+ mpe bogangaki na kolela na sanza ya mitano mpe na sanza ya nsambo,+ mpe bosalaki yango mbula ntuku nsambo (70),+ bokilaki nde bilei mpo na ngai, ɛɛ mpo na ngai mpenza?+  Mpe ntango bozalaki kolya mpe komɛla, bino te nde bato bozalaki kolya, mpe bino te nde bato bozalaki komɛla?  Bosengelaki nde te kotosa maloba+ oyo Yehova abelelaki na nzela ya basakoli ya kala,+ ntango bato bazalaki kofanda na Yerusaleme, mpe ntango yango efandaki kimya, ná bingumba na yango oyo ezalaki zingazinga na yango, mpe ntango bato bafandaki na Negebe+ mpe na Shefela?’”+  Mpe liloba ya Yehova eyelaki lisusu Zekaria ete:  “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Bósambisaka na bosembo ya solosolo;+ mpe bómoniselanaka motema boboto+ mpe motema mawa;+ 10  mpe bóbubaka te mwasi oyo mobali akufá+ to mwana mobali oyo tata akufá,+ to moto oyo afandi mopaya+ to moto ya mpasi,+ mpe bókanaka na mitema na bino kosalelana eloko ata moko te ya mabe.’+ 11  Kasi bazalaki kaka koboya kotya likebi,+ mpe bazalaki kaka kotomboka,*+ mpe bakómisaki matoi na bango makasi mpenza mpo báyoka te.+ 12  Mpe bakómisaki motema+ na bango lokola libanga ya emeri mpo bátosaka te mobeko+ mpe maloba oyo Yehova ya mampinga atindaki na nzela ya elimo na ye,+ na nzela ya basakoli ya kala;+ bongo Yehova ya mampinga ayokaki nkanda makasi.”+ 13  “‘Mpe esalemaki boye: Lokola abengaki mpe bango bayokaki te,+ bango mpe babengaki ngai mpe nayokaki te,’+ Yehova ya mampinga alobi bongo. 14  ‘Mpe nabwakaki bango na mopɛpɛ makasi na bikólo+ nyonso oyo bango bayebaki te;+ mpe mokili yango moko etikalaki mpamba na nsima na bango, moto azalaki koleka wana te mpe moto azalaki kozonga wana te;+ mpe bakómisaki mokili yango ya kitoko+ eloko ya kokamwa.’”

Maloba na nse

Lil., “lipeka ya motó makasi.”