Zekaria 6:1-15
6 Bongo natombolaki lisusu miso na ngai mpe namonaki; mpe talá! makalo minei ezalaki kobima na katikati ya bangomba mibale, mpe bangomba yango ezalaki bangomba ya motako.
2 Likalo ya liboso ná bampunda ya motane;+ mpe likalo ya mibale ná bampunda ya moindo.+
3 Mpe likalo ya misato ná bampunda ya mpɛmbɛ;+ mpe likalo ya minei ná bampunda ya matɔnɔmatɔnɔ, ya langilangi.+
4 Mpe nayanolaki mpe nalobaki na anzelu oyo azalaki kosolola na ngai ete: “Nkolo na ngai, wana nde nini?”+
5 Bongo anzelu ayanolaki mpe alobaki na ngai ete: “Wana ezali bilimo+ minei ya likoló, oyo nsima ya kotɛlɛma liboso ya Nkolo+ ya mabele mobimba,+ ezali kobima.+
6 Likalo oyo ezali na bampunda ya moindo ezali kobima mpe ezali kokende na mokili ya nɔrdi;+ mpe oyo ya mpɛmbɛ esengeli kobima mpe kokende na nsima ya mbu; mpe oyo ya matɔnɔmatɔnɔ esengeli kobima mpe kokende na mokili ya sudi.+
7 Mpe oyo ya langilangi+ esengeli kobima mpe koluka epai yango ekokende, mpo na kotambola epai na epai na mabele.”+ Bongo alobaki ete: “Bókende, bótambola epai na epai na mabele.” Mpe ebandaki kotambola epai na epai na mabele.
8 Mpe ye abelelaki ngai mpe alobaki na ngai ete: “Talá, oyo ezali kokende na mokili ya nɔrdi, yango nde esali ete elimo+ ya Yehova epema na mokili ya nɔrdi.”+
9 Mpe liloba ya Yehova eyelaki ngai lisusu ete:
10 “Bázwa eloko epai ya bato oyo bamemamaki na mboka mopaya,+ ɛɛ epai ya Heledai mpe epai ya Tobiya mpe epai ya Yedaya; mpe yo moko oya na mokolo yango, mpe okɔta na ndako ya Yosiya mwana ya Sefania+ elongo na bato wana oyo bauti na Babilone.
11 Mpe okozwa palata ná wolo mpe okosala motole moko ya kitoko+ mpe okotya yango na motó ya Yosua+ mwana ya Yehozadake nganga-nzambe monene.
12 Mpe osengeli koloba na ye ete:“‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Talá mobali+ oyo nkombo na ye Etape.+ Mpe uta na esika na ye mpenza akobimisa etape, mpe akotonga mpenza tempelo ya Yehova.+
13 Mpe ye moko akotonga tempelo ya Yehova, mpe ye akozwa lokumu;+ mpe akofanda mpenza mpe akoyangela na kiti na ye ya bokonzi, mpe akokóma mpenza nganga-nzambe na kiti na ye ya bokonzi,+ mpe boyokani+ ekozala kati na misala yango mibale.
14 Mpe motole ya lokumu ekokóma ya Heleme, ya Tobiya, ya Yedaya+ mpe ya Hene mwana ya Sefania, mpo ezala ekaniseli+ na kati ya tempelo ya Yehova.
15 Mpe baoyo bazali mosika bakoya mpe bakotonga mpenza na kati ya tempelo ya Yehova.”+ Mpe bosengeli koyeba ete Yehova ya mampinga ye moko nde atindi ngai epai na bino.+ Mpe ekosalema mpenza bongo—soki bokoyoka mongongo ya Yehova Nzambe na bino.’”+

