Zekaria 5:1-11
5 Bongo natombolaki lisusu miso na ngai mpe namonaki; mpe talá! rulo moko ezali kopumbwa.+
2 Bongo alobaki na ngai ete: “Ozali komona nini?”+
Mpe nalobaki ete: “Nazali komona rulo moko ezali kopumbwa, bolai na yango ezali mapeko ntuku mibale (20), mpe bonene na yango ezali mapeko zomi.”
3 Bongo alobaki na ngai ete: “Oyo ezali elakeli mabe oyo ezali kokende na mabele mobimba,+ mpamba te, moto nyonso oyo azali koyiba+ azwi etumbu te ndenge ekomami na elakeli mabe oyo ezali na ngámbo oyo ya rulo; mpe moto nyonso oyo alapi ndai+ azwi etumbu te ndenge ekomami na elakeli mabe oyo ezali na ngámbo oyo mosusu ya rulo.+
4 ‘Natindi yango,’ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga, ‘mpe yango ekokɔta mpenza na ndako ya moyibi mpe na ndako ya moto oyo azali kolapa ndai na nkombo na ngai na lokuta;+ mpe yango ekofanda mpenza na kati ya ndako na ye mpe ekosilisa yango nyɛɛ ná mabaya na yango ná mabanga na yango.’”+
5 Bongo anzelu oyo azalaki kosolola na ngai abimaki mpe alobaki na ngai ete: “Nabondeli yo, tombolá miso na yo, mpe talá eloko yango nini oyo ezali kokende.”
6 Bongo nalobaki ete: “Ezali nini?”
Mpe alobaki ete: “Eloko oyo ezali kokende ezali nde efa.” Mpe alobaki lisusu ete: “Bato yango bazali komonana bongo na mabele mobimba.”
7 Mpe talá! ezipeli ya zolongano ya mondɔlu etombwamaki na likoló; mpe talá mwasi moko boye afandi na kati ya efa yango.
8 Bongo alobaki ete: “Mabe ye wana.” Mpe azongisaki ye na kati ya efa,+ na nsima akitisaki ezipeli yango ya mondɔlu ya kilo na monɔkɔ na yango.
9 Bongo natombolaki miso na ngai likoló mpe namonaki, mpe talá basi mibale bazali kobima, mpe mapapu na bango ezalaki kopɛpa na mopɛpɛ. Mpe bazalaki na mapapu lokola mapapu ya nkɔngi. Mpe bazalaki kotombola efa mokemoke kati na mabele mpe likoló.
10 Bongo nalobaki na anzelu oyo azalaki kosolola na ngai ete: “Epai wapi bazali komema efa yango?”
11 Mpe alobaki na ngai ete: “Mpo na kotongela+ ye ndako na mokili ya Shinare;+ mpe yango ekotɛlɛma mpenza makasi, mpe ekotyama kuna na esika na yango mpenza.”