Zekaria 4:1-14

4  Mpe anzelu oyo azalaki kosolola na ngai azongaki mpe alamwisaki ngai, ndenge balamwisaka moto na mpɔngi.+  Bongo alobaki na ngai ete: “Ozali komona nini?”+ Mpe nalobaki ete: “Namoni, mpe talá! etɛlɛmiselo ya miinda, esalemi mobimba na wolo,+ ná kibakuli na nsɔngɛ na yango. Mpe miinda nsambo na yango ezali likoló na yango, ɛɛ nsambo;+ mpe miinda oyo ezali na nsɔngɛ na yango ezali na batiyo nsambo.  Mpe banzete mibale ya olive ezali pene na yango,+ moko na lobɔkɔ ya mobali ya kibakuli mpe moko na lobɔkɔ na yango ya mwasi.”  Bongo nayanolaki mpe nalobaki na anzelu oyo azalaki kosolola na ngai: “Nkolo na ngai, biloko oyo elimboli nini?”+  Bongo anzelu oyo azalaki kosolola na ngai ayanolaki mpe alobaki na ngai ete: “Oyebi mpenza ndimbola ya biloko oyo te?” Mpe nalobaki ete: “Nayebi te, nkolo na ngai.”+  Bongo ayanolaki mpe alobaki na ngai ete: “Liloba oyo Yehova alobi na Zerubabele, yango oyo: ‘“Na limpinga ya basoda te,+ na nguya mpe te,+ kasi nde na elimo na ngai,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo.  Ee ngomba monene, yo nani?+ Liboso ya Zerubabele+ okokóma mokili moko ya patatalu. Mpe ya solo, ye akobimisa libanga ya motó.+ Bato bakobelela+ yango ete: “Kitoko mpenza! Kitoko mpenza!”’”+  Mpe liloba ya Yehova eyelaki ngai lisusu ete:  “Mabɔkɔ ya Zerubabele etye moboko ya ndako oyo,+ mpe mabɔkɔ na ye kaka nde ekosilisa yango.+ Mpe okoyeba ete Yehova ya mampinga ye moko nde atindi ngai epai na bino.+ 10  Mpo nani atyoli mokolo ya makambo ya mike?+ Mpe bakosepela+ mpenza mpe bakomona nsinga ya nivo na lobɔkɔ ya Zerubabele. Miso yango nsambo ezali miso ya Yehova.+ Yango ezali kotambola epai na epai na mabele mobimba.”+ 11  Mpe nayanolaki mpe nalobaki na ye ete: “Banzete wana mibale ya olive oyo ezali na lobɔkɔ ya mobali ya etɛlɛmiselo ya miinda mpe na lobɔkɔ na yango ya mwasi elimboli nini?”+ 12  Bongo nayanolaki mpe nalobaki na ye mbala ya mibale ete: “Maboke mibale ya bitape ya banzete ya olive, oyo ezali kosopa eloko ya wolo na kati na yango na batiyo mibale ya wolo, ezali nini?” 13  Bongo alobaki na ngai ete: “Oyebi mpenza ndimbola ya biloko wana te?” Mpe nalobaki ete: “Nkolo na ngai, nayebi te.”+ 14  Bongo alobaki ete: “Yango ezali bato mibale oyo batyami mafuta+ oyo bazali kotɛlɛma pene na Nkolo ya mabele mobimba.”+

Maloba na nse