Zekaria 2:1-13
2 Mpe natombolaki miso na ngai mpe namonaki; mpe talá! moto moko azalaki wana, mpe na lobɔkɔ na ye azalaki na nsinga ya komeka.+
2 Bongo nalobaki ete: “Okei wapi?”
Mpe ye alobaki na ngai ete: “Komeka Yerusaleme, mpo na koyeba bonene na yango mpe bolai na yango.”+
3 Mpe talá! anzelu oyo azalaki kosolola na ngai azalaki kokende, mpe anzelu mosusu ayaki kokutana na ye.
4 Bongo alobaki na ye ete: “Potá mbangu, lobá na elenge mobali oyo wana ete: ‘“Na Yerusaleme, bato bakofanda+ lokola na mboka oyo ezangi bifelo, mpo bato ná banyama ya mboka bakozala ebele kuna.+
5 Mpe ngai moko nakokóma efelo na yango ya mɔtɔ epai na epai,+ mpe ngai nakokóma nkembo kuna,”’”+ yango nde liloba ya Yehova.
6 “Bino! Bino! Bókima mokili ya nɔrdi,”+ yango nde liloba ya Yehova.
“Mpo napalanganisi bino na mipɛpɛ minei ya likoló,”+ yango nde liloba ya Yehova.
7 “Yo Siona!+ Kimá, yo oyo ozali kofanda na mwana mwasi ya Babilone.+
8 Mpo talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Nsima ya nkembo+ atindaki ngai na bikólo oyo ezalaki kopunza bino;+ mpo moto oyo azali kosimba bino+ azali kosimba mbuma ya liso na ngai.+
9 Mpo talá nazali koningisela bango lobɔkɔ,+ mpe bakokóma mpenza biloko ya kopunza ya baombo na bango.’+ Mpe bino bokoyeba mpenza ete Yehova ya mampinga ye moko atindi ngai.+
10 “Ee mwana mwasi ya Siona, gangá makasi mpe sepelá;+ mpo talá nazali koya,+ mpe nakofanda epai na yo,”+ yango nde liloba ya Yehova.
11 “Mpe bikólo mingi bakokangana na Yehova na mokolo yango,+ mpe bakokóma mpenza bato na ngai;+ mpe nakofanda epai na yo.” Mpe okoyeba ete Yehova ya mampinga ye moko atindi ngai epai na yo.+
12 Mpe Yehova akokamata mpenza Yuda ezala likabo na ye na mabele mosantu,+ mpe akopona lisusu Yerusaleme.+
13 Moto nyonso, fandá nyɛɛ liboso ya Yehova,+ mpo ye moko alamuki,+ alongwe na esika na ye mosantu.+