Zekaria 14:1-21

14  “Talá! Mokolo moko ezali koya, mokolo ya Yehova,+ mpe biloko na yo oyo bapunzi ekokabolama mpenza epai na yo.  Mpe nakoyanganisa mpenza bikólo nyonso mpo na kobunda etumba+ ná Yerusaleme; mpe engumba yango ekobɔtɔlama mpenza+ mpe bandako ekopunzama, mpe bakosangisa mpenza nzoto na basi na makasi.+ Mpe ndambo ya engumba ekokende na mboka mopaya;+ kasi baoyo batikali kati na bato+ bakolongolama na engumba te.+  “Mpe Yehova akobima mpenza mpe akobunda etumba na bikólo yango+ lokola na mokolo ya etumba na ye, na mokolo ya kobunda.+  Mpe na mokolo yango, makolo na ye ekotɛlɛma mpenza likoló ya ngomba ya banzete ya olive, oyo ezali kotalana na Yerusaleme, na ɛsti;+ mpe ngomba ya banzete ya olive+ ekopasuka na katikati,+ banda epai moi ebimaka tii na wɛsti. Lobwaku moko ya monene mpenza ekosalema; mpe ndambo moko ya ngomba ekokende tii na nɔrdi, mpe ndambo na yango mosusu ekokende tii na sudi.  Mpe bino bokokima mpenza na lobwaku ya bangomba na ngai;+ mpamba te lobwaku ya bangomba ekokóma tii na Azele. Mpe bokokima, kaka ndenge bokimaki mpo na koningana ya mabele na mikolo ya Uzia, mokonzi ya Yuda.+ Mpe Yehova Nzambe na ngai akoya mpenza,+ basantu nyonso bakozala elongo na ye.+  “Mpe ekosalema boye na mokolo yango ete pole ya solosolo ekozala te+—biloko ekokangama makasi na malili.+  Mpe yango ekozala mpenza mokolo oyo eyebani ete ezali ya Yehova.+ Ekozala moi te, ekozala mpe butu te;+ mpe ekosalema boye, na ntango ya mpokwa, ekozala pole.+  Mpe ekosalema boye na mokolo yango: mai ya bomoi+ ekobima na Yerusaleme,+ ndambo mosusu ekokende na mbu ya ɛsti+ mpe ndambo na yango mosusu ekokende na mbu ya wɛsti.+ Ekosalema na eleko ya molunge mpe na eleko ya mpiɔ.+  Mpe Yehova akokóma mpenza mokonzi ya mabele mobimba.+ Na mokolo yango Yehova akozala moko,+ mpe nkombo na ye moko.+ 10  “Mpe mokili yango mobimba ekobongwana lokola Araba,+ banda na Geba+ tii na Rimone,+ na sudi ya Yerusaleme; mpe yango ekotombwama mpe bato bakofanda na esika na yango,+ banda na Porte ya Benyamina+ tii na esika ya Porte ya Liboso, tii na Porte ya Litumu, mpe banda na Ndako Molai ya Hananele+ tii na bikamwelo ya mokonzi. 11  Mpe bato bakofanda mpenza wana; mpe eloko ya ekila oyo ekoyeisa libebi ekozala lisusu te,+ mpe bato bakofanda na Yerusaleme na kimya.+ 12  “Mpe talá mpasi oyo Yehova akopesa bato ya bikólo nyonso oyo bakoya mpenza mpo na kobunda etumba ná Yerusaleme:+ Mosuni ya moto mokomoko ekopɔla, wana atɛlɛmi na makolo na ye;+ miso na ye mpenza ekopɔla na madusu ya miso, mpe lolemo na ye mpenza ekopɔla na monɔkɔ na ye. 13  “Mpe ekosalema boye na mokolo yango ete mobulungano oyo euti na Yehova ekopalangana bipai nyonso na kati na bango;+ mpe bakosimba makasi mpenza, mokomoko lobɔkɔ ya moninga na ye, mpe lobɔkɔ na ye ekotɛmɛla mpenza lobɔkɔ ya moninga na ye. 14  Mpe lisusu Yuda ekobunda etumba ná Yerusaleme; mpe bomɛngo ya bikólo nyonso ya zingazinga ekoyanganisama, wolo ná palata mpe bilamba mingi mpenza koleka.+ 15  “Mpe mpasi ya mpunda, ya dɔngi, ya kamela mpe ya mpunda-mobali, mpe ya mitindo nyonso ya nyama ya mboka oyo ezali na bakaa wana, ekozala lokola mpasi oyo wana. 16  “Mpe ekosalema boye: bato nyonso oyo batikali na bikólo nyonso oyo ezali koya kotɛmɛla Yerusaleme,+ basengeli mpe komata mbula na mbula+ mpo na kogumbamela Mokonzi,+ Yehova ya mampinga,+ mpe kosala fɛti ya mwa bandako ya matiti.+ 17  Mpe ekosalema boye: na mabota+ ya mabele, bato nyonso oyo bakomata te+ na Yerusaleme mpo na kogumbela Mokonzi, Yehova ya mampinga, ɛɛ epai na bango mbula makasi ekonɔka te.+ 18  Mpe soki libota ya Ezipito mpenza emati te mpe ekɔti mpenza te, epai na bango mpe mbula yango ekozala te. Mpasi ekobima oyo Yehova akopesa bikólo oyo ezali komata te mpo na kosala fɛti ya mwa bandako ya matiti. 19  Yango mpenza ekozala nde etumbu mpo na lisumu ya Ezipito mpe lisumu ya bikólo nyonso oyo ezali komata te mpo na kosala fɛti ya mwa bandako ya matiti.+ 20  “Na mokolo yango, likoló ya mwa bangonga mikemike ya mpunda, ekokomama+ ete: ‘Bosantu ezali ya Yehova!’+ Mpe banzungu ya kolambela oyo ezali na monɔkɔ monene+ na ndako ya Yehova ekokóma lokola mabakuli+ liboso ya etumbelo.+ 21  Mpe nzungu nyonso ya kolambela oyo ezali na monɔkɔ monene na Yerusaleme mpe na Yuda ekokóma eloko ya bosantu ya Yehova ya mampinga, mpe baoyo nyonso bazali kopesa mbeka basengeli kokɔta kozwa yango mpe kolamba na yango.+ Mpe Mokanana akozala lisusu te+ na ndako ya Yehova ya mampinga na mokolo yango.”+

Maloba na nse