Zekaria 12:1-14
12 Liyebisi:
“Liloba ya Yehova mpo na Yisraele,” yango nde liloba ya Yehova, Ye oyo azali kotanda likoló+ mpe azali kotya moboko ya mabele+ mpe azali kosala elimo+ ya moto na kati na ye.
2 “Talá nazali kokómisa Yerusaleme+ kibakuli oyo ezali kopesa bato ya bikólo nyonso ya zingazinga kizunguzungu;+ mpe lisusu akozinga Yuda, ɛɛ akozinga Yerusaleme.+
3 Mpe ekosalema boye na mokolo yango:+ nakokómisa Yerusaleme libanga ya kilo+ mpo na bato ya bikólo nyonso. Baoyo nyonso bakotombola yango bakozoka makasi mpenza; mpe bikólo nyonso ya mabele ekoyangana mpenza mpo na kotɛmɛla yango.+
4 Na mokolo yango,”+ yango nde liloba ya Yehova, “nakokɔtisa mpunda+ nyonso na mobulungano mpe nakopesa motambwisi na yango ligboma;+ mpe nakofungolela ndako ya Yuda miso na ngai,+ mpe nakoboma miso ya mpunda nyonso ya bato ya bikólo.
5 Mpe basheiki+ ya Yuda bakoloba na motema na bango ete: ‘Bato oyo bafandi na Yerusaleme bazali makasi na ngai oyo euti na Yehova ya mampinga, Nzambe na bango.’+
6 Na mokolo yango, nakokómisa basheiki ya Yuda lokola saani ya mɔtɔ na kati ya banzete+ mpe lokola bisungi ya mɔtɔ na molɔngɔ ya mbuma oyo bakati sika,+ mpe bakozikisa bato ya bikólo nyonso ya zingazinga na lobɔkɔ ya mobali mpe na lobɔkɔ ya mwasi;+ mpe bato ya Yerusaleme bakofanda lisusu na engumba na bango, na Yerusaleme.+
7 “Mpe Yehova akobikisa mpenza bahema ya Yuda liboso, mpo kitoko ya ndako ya Davidi mpe kitoko ya bato oyo bafandi na Yerusaleme eleka Yuda mingi te.
8 Na mokolo yango, Yehova akozala libateli zingazinga ya bato oyo bafandi na Yerusaleme;+ mpe moto oyo azali kobɛta libaku na kati na bango akokóma na mokolo yango lokola Davidi,+ mpe ndako ya Davidi lokola Nzambe,+ lokola anzelu ya Nzambe liboso na bango.+
9 Mpe na mokolo yango ekosalema boye: nakoluka kosilisa nyɛɛ bikólo nyonso oyo ezali koya kotɛmɛla Yerusaleme.+
10 “Mpe nakosopela ndako ya Davidi ná bato oyo bafandi na Yerusaleme elimo ya boboto+ mpe ya malɔmbɔ,+ mpe bakotala mpenza epai ya Moto oyo batɔbɔlaki,+ mpe bakolela Ye mpenza ndenge balelaka mwana mobali oyo azali kaka ye moko; mpe bakolela ye na mpasi na motema ndenge balelaka mwana mobali ya liboso.+
11 Na mokolo yango, koganga ekozala monene na Yerusaleme, lokola koganga ya Hadadrimone na lobwaku ya patatalu ya Megido.+
12 Mpe mokili yango ekoganga mpenza,+ libota na libota epai; libota ya ndako ya Davidi epai, mpe basi na bango epai;+ libota ya ndako ya Natane+ epai, mpe basi na bango epai;
13 libota ya ndako ya Levi+ epai, mpe basi na bango epai; libota ya Bashimei+ epai, mpe basi na bango epai;
14 mabota nyonso oyo etikali, libota na libota epai, mpe basi na bango epai.+