Zekaria 11:1-17

11  “Ee Libá,+ fungolá baporte na yo mpo mɔtɔ ezikisa banzete na yo ya sɛdrɛ.+  Ee nzete ya jenevriye, gangá na kolela, mpo nzete ya sɛdrɛ ekwei; mpamba te banzete mpenza ya lokumu epunzami!+ Bino banzete minene ya Bashane, bóganga na kolela, mpo zamba oyo likoki ya kokɔta na kati na yango ezalaka te ekatami!+  Yoká! Babateli ya mpate bazali koganga na kolela,+ mpo lokumu na bango epunzami.+ Yoká! Koganga ya bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki, mpo mwa bazamba ya lolendo oyo ezali pembenipembeni ya Yordani epunzami.+  “Talá oyo Yehova Nzambe na ngai alobi: ‘Leisá etonga oyo esengeli kobomama,+  bato oyo basombi etonga yango babandi koboma+ yango, ata bongo bazali na ngambo te.+ Mpe baoyo bazali kotɛka+ yango bazali koloba ete: “Yehova apambwama, mpo nakozwa bomɛngo.”+ Mpe babateli na yango bazali komonisela yango motema mawa te.’+  “‘Mpo nakomonisela lisusu bato oyo bafandi na mokili oyo motema mawa te,’+ yango nde liloba ya Yehova. ‘Yango wana, talá nazali kosala ete bato bákwea bango moko, moto na moto na lobɔkɔ ya moninga na ye+ mpe na lobɔkɔ ya mokonzi na ye;+ mpe bakobukabuka mpenza mokili oyo, mpe nakosikola te na lobɔkɔ na bango.’”+  Mpe naleisaki etonga+ oyo esengelaki kobomama,+ mpo na bolamu na bino, Ee bino bato ya mpasi na etonga.+ Na bongo, nazwaki mangenda+ mibale mpo na ngai. Moko nabengaki yango Kosepelisa,+ mpe mosusu nabengaki yango Bomoko,+ mpe nabandaki koleisa etonga.  Mpe nsukansuka nalongolaki babateli misato ya mpate kaka na sanza moko,+ mpo molimo na ngai ezalaki kokoka bango te,+ mpe lisusu molimo na bango mpenza eyokaki ngai mpii.  Bongo nalobaki ete: “Nakoleisa bino lisusu te.+ Oyo azali kokufa, akufa. Mpe oyo azali kolongolama, alongolama.+ Mpe baoyo batikali, mokomoko alya mosuni ya moninga na ye.”+ 10  Bongo nakamataki lingenda na ngai Kosepelisa+ mpe nakataki yango bitenibiteni,+ mpo na kobuka kondimana na ngai oyo nasalaki ná bato ya bikólo nyonso.+ 11  Mpe ebukanaki na mokolo yango, mpe bato ya mpasi na etonga,+ baoyo bazalaki kotala+ ngai, bayebaki na ndenge yango ete ezali liloba ya Yehova. 12  Bongo nalobaki na bango ete: “Soki ezali malamu na miso na bino,+ bópesa ngai lifuti na ngai; kasi soki te, bótika.” Mpe bapesaki lifuti na ngai, shekele ya palata ntuku misato (30).+ 13  Bongo Yehova alobaki na ngai ete: “Bwaká yango na esika ya kobomba mosolo+—motuya kitoko oyo bango bamonaki ete ezali motuya na ngai.”+ Bongo nakamataki shekele yango ya palata ntuku misato (30) mpe nabwakaki yango na esika ya kobomba mosolo na ndako ya Yehova.+ 14  Bongo lingenda na ngai ya mibale, Bomoko,+ nakataki yango bitenibiteni, mpo na kobebisa bondeko+ oyo ezali na kati ya Yuda ná Yisraele.+ 15  Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: “Kamatá lisusu mpo na yo bisaleli ya mobateli ya mpambampamba ya mpate.+ 16  Mpo talá nazali kopesa nzela ete mobateli moko ya mpate abima na mokili oyo.+ Akotya likebi te na bampate oyo ezali kolongolama.+ Oyo ezali naino moke, akoluka yango te, mpe mpate oyo ebukani, akobikisa yango te.+ Oyo ezali na makasi ya kotɛlɛma yango moko, akopesa yango bilei te, mpe mosuni ya oyo ya mafuta, akolya yango,+ mpe basabo ya bampate, akolongola yango.+ 17  Mawa na mobateli ya mpate na ngai oyo azangi ntina,+ oyo azali kotika etonga!+ Mopanga ekozala na lobɔkɔ na ye mpe na liso na ye ya mobali. Lobɔkɔ na ye ekokauka+ mpenza, mpe liso na ye ya mobali ekolɛmba mpenza.”

Maloba na nse