Yuda 1:1-25

1  Yuda, moombo ya Yesu Kristo, kasi ndeko ya Yakobo,+ epai ya bato oyo babengami,+ oyo bazali bandeko ya bolingo na boyokani na Nzambe Tata+ mpe babatelami+ mpo na Yesu Kristo:  Motema mawa+ mpe kimya+ mpe bolingo+ ebakisama epai na bino.+  Bandeko ya bolingo,+ atako nazalaki kosala molende nyonso mpo na kokomela bino mpo na lobiko oyo tozali na yango biso nyonso,+ namoni ete ezali na ntina kokomela bino mpo na kolendisa bino ete bóbunda etumba makasi mpo na kondima+ oyo epesamaki na basantu mbala moko mpo na libela.+  Ntina nasali bongo ezali mpo bato mosusu bamikɔtisi na kati na bino na mayele,+ baoyo Makomami emonisá+ uta kalakala ete bakozwa lisambisi oyo,+ bato oyo batyolaka Nzambe,+ oyo bazali kozwa boboto monene ya Nzambe na biso libaku ya kozala na etamboli ya nsɔni+ mpe bazali kowangana+ Nkolo+ na biso kaka moko mpe Mokonzi,+ Yesu Kristo.  Nalingi kokundwela bino, ata boyebi makambo nyonso+ mbala moko mpo na libela, ete Yehova, atako abikisaki bato na mokili ya Ezipito,+ na nsima abomaki baoyo bamonisaki kondima te.+  Mpe baanzelu oyo babatelaki te esika na bango ya ebandeli kasi basundolaki esika na bango moko ya kofanda mpenza,+ abombi bango na minyɔlɔlɔ ya seko+ na kati ya molili tuu mpo na lisambisi ya mokolo yango monene.+  Ndenge moko mpe Sodoma ná Gomora ná bingumba ya zingazinga na yango,+ nsima wana bango, lokola baanzelu wana, basalaki pite koleka mpe balandaki nzoto ya mosuni mpo na kosalela yango na ndenge ebongi te,+ batyami liboso na biso lokola ndakisa ya kokebisa+ na ndenge bazwaki etumbu ya lisambisi ya mɔtɔ ya seko.+  Nzokande, kaka bongo, bato wana mpe, lokola bamipesi na bandɔtɔ,+ bazali kokómisa nzoto ya mosuni mbindo mpe kotyola bonkolo+ mpe kofinga bato ya nkembo.+  Nzokande ntango Mikaele,+ anzelu-mokonzi,+ azalaki na matata+ ná Zabolo mpe azalaki kowelana mpo na nzoto ya Moize,+ amekaki kutu te kokweisa ye na likambo na maloba ya kofinga,+ kasi alobaki nde: “Yehova apamela yo.”+ 10  Atako bongo, bato yango bazali koloba mabe mpo na makambo nyonso oyo bayebi kutu te;+ kasi makambo nyonso oyo bango bakangaka ntina kaka boye, lokola banyama ezangá mayele,+ na kati ya makambo wana bazali kokoba komibebisa+ bango moko. 11  Mawa na bango, mpo balandi nzela ya Kaina,+ mpe bamibwaki na nzela ya libunga ya Balaama+ mpo na koluka mbano, mpe bakufi mpo na maloba ya botomboki+ ya Kora!+ 12  Bango bazali mabanga ebombaná na nse na mai na bafɛti na bino ya bolingo+ ntango bazali kolya fɛti elongo na bino, babateli ya mpate oyo bamileisaka bango moko kozanga kobanga;+ mapata oyo ezangá mai mpe oyo ezali komemama epai+ na epai na mipɛpɛ;+ banzete na nsuka ya eleko ya otɔnɛ, kasi ezangi mbuma, ekufi mbala mibale, epikolami;+ 13  mbonge mabe ya mbu oyo ezali kobimisa, lokola fulufulu, makambo oyo esengeli koyokisa bango nsɔni;+ minzoto oyo ezangá nzela ya sikisiki, oyo babombela bango molili tuu libela na libela.+ 14  Ɛɛ, moto ya nsambo na molɔngɔ oyo ebandi na Adama, ye Enoka,+ asakolaki mpe mpo na bango, ntango alobaki ete: “Talá! Yehova ayei na bamiriade na ye basantu,+ 15  mpo na kokata makambo ya bato nyonso,+ mpe kokweisa baoyo nyonso batyolaka Nzambe mpo na misala na bango nyonso ya kotyola Nzambe oyo basalaki na ndenge ya kotyola Nzambe, mpe mpo na makambo nyonso ya kozokisa oyo basumuki, oyo batyolaka Nzambe, balobaki mpo na ye.”+ 16  Bato yango bazali bato oyo baimaimaka,+ bato oyo bamilelalelaka mpo na bomoi na bango, bazali kolanda bamposa na bango moko,+ mpe minɔkɔ na bango ezali koloba makambo ya lolendo,+ wana bazali kokumisa bato+ mpo na koluka litomba na bango moko. 17  Nde bino, bandeko ya bolingo, bókanisa lisusu maloba oyo bantoma ya Nkolo na biso Yesu Kristo balobaki liboso,+ 18  ndenge bazalaki koloba na bino ete: “Na ntango ya nsuka basɛki bakozala, oyo bakolanda bamposa na bango ya makambo ya kotyola Nzambe.”+ 19  Bango bazali bato oyo bakɔtisaka bokabwani,+ bato ya mosuni,+ oyo bazangá elimo.+ 20  Kasi bino, bandeko ya bolingo, awa bozali komitonga+ likoló ya kondima na bino oyo eleki bosantu,+ mpe lokola bozali kobondela na elimo santu,+ 21  bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe,+ wana bozali kozela motema mawa+ ya Nkolo na biso Yesu Kristo mpo na bomoi ya seko.+ 22  Lisusu, bókoba komonisa motema mawa+ epai ya baoyo bazali na ntembe;+ 23  bóbikisa bango+ mpe bólongola bango na mɔtɔ.+ Kasi bókoba komonisela bamosusu motema mawa, bósala bongo na kobanga, wana bozali koyina ata elamba ya kati, oyo nzoto etye litɔnɔ.+ 24  Nzokande epai na ye oyo akoki kobatela+ bino mpo bóbɛta libaku te mpe kotɛlɛmisa bino kozanga litɔnɔ+ liboso ya nkembo na ye na esengo monene, 25  epai ya Nzambe kaka moko Mobikisi+ na biso na nzela ya Yesu Kristo+ Nkolo na biso, nkembo,+ bonene, nguya+ mpe bokonzi+ ezala seko na bileko nyonso oyo eleká+ mpe sikoyo mpe na bileko nyonso seko.+ Amen.+

Maloba na nse