Yosua 24:1-33
24 Mpe Yosua ayanganisaki mabota nyonso ya Yisraele na Shekeme+ mpe abengaki mikóló ya Yisraele,+ bankumu na yango, basambisi na yango mpe bakapita na yango, mpe bakendaki kotɛlɛma liboso ya Nzambe ya solo.+
2 Bongo Yosua alobaki na bato nyonso boye: “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Na ntango ya kala, bankɔkɔ na bino,+ Tera, tata ya Abrahama mpe tata ya Nahore,+ bafandaki na ngámbo mosusu ya Ebale+ mpe bazalaki kosalela banzambe mosusu.
3 “‘Na nsima, nazwaki nkɔkɔ na bino Abrahama+ na ngámbo mosusu ya Ebale+ mpe natambwisaki ye na mokili mobimba ya Kanana mpe nakómisaki momboto* na ye bato ebele.+ Bongo, napesaki ye Yisaka.+
4 Na nsima, napesaki Yisaka Yakobo ná Esau.+ Nsima na yango, napesaki Esau Ngomba Seire mpo azwa yango;+ mpe Yakobo ná bana na ye bakitaki na Ezipito.+
5 Na nsima, natindaki Moize ná Arona,+ mpe nabɛtaki Ezipito na bolɔzi oyo nakweiselaki yango;+ mpe na nsima, nabimisaki bino.+
6 Ntango nabimisaki batata na bino na Ezipito+ mpe wana bokómaki na mbu, bato ya Ezipito balandaki+ batata na bino tii na Mbu Motane, na makalo ya bitumba mpe na basoda oyo batambolaka na mpunda.
7 Mpe babandaki kobelela Yehova.+ Bongo ye atyaki molili kati na bino ná bato ya Ezipito+ mpe akitiselaki bango mbu mpe azipaki bango,+ mpe miso na bino emonaki makambo oyo nasalaki na Ezipito;+ mpe bofandaki mikolo mingi na esobe.+
8 “‘Nsukansuka, namemaki bino na mokili ya Baamore oyo bazalaki kofanda na ngámbo mosusu ya Yordani, mpe bango babundaki na bino.+ Bongo ngai napesaki bango na lobɔkɔ na bino mpo bózwa mokili na bango, mpe nasilisaki bango nyɛɛ liboso na bino.+
9 Na nsima Balake mwana ya Zipore,+ mokonzi ya Moabe, atɛlɛmaki mpe abundaki na Yisraele.+ Bongo atindaki bato epai ya Balaama mwana ya Beore mpe abengisaki ye mpo alakela bino mabe.+
10 Kasi naboyaki koyokela Balaama.+ Yango wana, apambolaki bino mbala na mbala.+ Na bongo, nabikisaki bino na lobɔkɔ na ye.+
11 “‘Na nsima bokatisaki Yordani+ mpe bokómaki na Yeriko.+ Mpe bankolo-mabele ya Yeriko, Baamore, Baperizi, Bakanana ná Bahiti, Bagirigashe, Bahivi ná Bayebusi babandaki kobunda na bino; kasi napesaki bango na lobɔkɔ na bino.+
12 Bongo natindaki mayoki ya kolɛmba nzoto liboso na bino, mpe nsukansuka ebenganaki bango liboso na bino+—bakonzi mibale ya Baamore—yango esalemaki na mopanga na yo te mpe na litimbo na yo te.+
13 Na ndenge yango, napesaki bino mokili oyo bomonelaki mpasi te mpe bingumba oyo botongaki te,+ mpe bokómaki kofanda kuna. Bozali kolya mbuma ya bilanga ya vinyo mpe ya bilanga ya olive oyo bolonaki te.’+
14 “Mpe sikoyo, bóbanga Yehova+ mpe bósalela ye na bosembo mpe na bosolo,+ mpe bólongola banzambe oyo bankɔkɔ na bino basalelaki na ngámbo mosusu ya Ebale mpe na Ezipito,+ mpe bósalela Yehova.
15 Nde soki emonani mabe na miso na bino kosalela Yehova, bópona bino moko lelo nani bino bokosalela,+ soki banzambe oyo bankɔkɔ na bino oyo bazalaki na ngámbo mosusu ya Ebale basalelaki+ to banzambe ya Baamore oyo bozali kofanda na mokili na bango.+ Kasi mpo na ngai mpe bato ya ndako na ngai, tokosalela Yehova.”+
16 Na yango, bato bapesaki eyano mpe balobaki boye: “Biso tokoki kokanisa ata moke te kotika Yehova mpo na kosalela banzambe mosusu.
17 Mpamba te ezali Yehova Nzambe na biso nde abimisaki biso ná batata na biso na mokili ya Ezipito,+ na ndako ya boombo,+ mpe asalaki bilembo yango ya minene na miso na biso+ mpe azalaki kobatela biso na nzela mobimba oyo totambolaki mpe kati na bato nyonso ya bikólo oyo tolekaki na kati na bango.+
18 Mpe Yehova abenganaki liboso na biso bato ya bikólo yango nyonso,+ ɛɛ, Baamore, oyo bazalaki kofanda na mokili oyo. Biso mpe, tokosalela Yehova, mpamba te azali Nzambe na biso.”+
19 Bongo Yosua alobaki na bato boye: “Bino bokoki kosalela Yehova te, mpo azali Nzambe moko mosantu;+ azali Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye.+ Akolimbisa te botomboki na bino mpe masumu na bino.+
20 Soki botiki Yehova+ mpe bosaleli mpenza banzambe ya bapaya,+ ye mpe akopesa bino mokɔngɔ solo mpe akosala bino mabe mpe akosilisa bino nyɛɛ nsima ya kosalela bino bolamu.”+
21 Bongo bato balobaki na Yosua boye: “Te, kasi biso tokosalela nde Yehova!”+
22 Na yango, Yosua alobaki na bato boye: “Bino moko bozali batatoli+ ete, na likanisi na bino moko, boponi Yehova, mpo na kosalela ye.”+ Na yango, bango balobaki ete: “Tozali batatoli.”
23 “Mpe sikoyo, bólongola banzambe ya bapaya oyo bazali kati na bino,+ mpe bóbalusa mitema na bino epai ya Yehova Nzambe ya Yisraele.”
24 Bongo bato balobaki na Yosua boye: “Tokosalela nde Yehova Nzambe na biso, mpe tokoyoka nde mongongo na ye!”+
25 Mpe Yosua asalaki kondimana ná bato na mokolo yango mpe atyelaki bango lilako mpe ekateli ya lisambisi+ na Shekeme.
26 Na nsima Yosua akomaki maloba yango na buku ya mobeko ya Nzambe+ mpe azwaki libanga+ moko monene mpe atɛlɛmisaki yango kuna, na nse ya nzete monene+ oyo ezali pene na esika mosantu ya Yehova.
27 Mpe Yosua alobaki lisusu na bato nyonso ete: “Talá! Libanga oyo nde ekozala motatoli liboso na biso,+ mpamba te eyoki maloba nyonso oyo Yehova alobi na biso, mpe libanga yango esengeli kozala motatoli liboso na bino, mpo bówangana Nzambe na bino te.”
28 Na yango, Yosua atikaki bato bákende, moto na moto na libula na ye.+
29 Mpe esalemaki boye: nsukansuka, nsima ya makambo yango, Yosua mwana ya Nunu, mosaleli ya Yehova, ayaki kokufa ntango azalaki na mbula nkama moko na zomi (110).+
30 Bongo, bakundaki ye na teritware ya libula na ye, na Ti-minate-sera,+ oyo ezali na etúká ya ngombangomba ya Efraime, na nɔrdi ya Ngomba Gaashe.
31 Mpe Yisraele bakobaki kosalela Yehova mikolo nyonso ya Yosua mpe mikolo nyonso ya mikóló oyo batikalaki na bomoi nsima ya Yosua+ mpe oyo bayebaki misala nyonso oyo Yehova asalelaki Yisraele.+
32 Mpe mikuwa ya Yozefe,+ oyo bana ya Yisraele babimaki na yango na Ezipito, bakundaki yango na Shekeme, na eteni ya elanga oyo Yakobo asombaki epai ya bana ya Hamore,+ tata ya Shekeme, na mbongo ya ebende nkama moko (100);+ mpe yango ekómaki libula ya bana ya Yozefe.+
33 Mpe Eleazare mwana ya Arona akufaki.+ Bongo bakundaki ye na Ngomba moke ya Finehase, mwana na ye,+ oyo apesaki ye na etúká ya ngombangomba ya Efraime.
Maloba na nse
^ To, “bana.”