Yosua 10:1-43

10  Mpe esalemaki boye: ntango kaka Adoni-zedeke mokonzi ya Yerusaleme, ayokaki ete Yosua azwi Ai+ mpe na nsima abebisi+ yango mpe asali Ai mpe mokonzi+ na yango ndenge asalaki Yeriko+ mpe mokonzi na yango,+ mpe ete bato oyo bafandi na Gibeone baluki kozala na kimya elongo na Yisraele+ mpe bazali kofanda kati na bango,  abangaki mingi,+ mpamba te Gibeone ezalaki engumba moko monene, lokola moko ya bingumba ya bokonzi, mpe mpo yango ezalaki monene koleka Ai,+ mpe mibali na yango nyonso bazalaki mibali ya nguya.  Bongo Adoni-zedeke mokonzi ya Yerusaleme,+ atindaki bato epai ya Hohame mokonzi ya Hebrone,+ mpe epai ya Pirame mokonzi ya Yaramute,+ mpe epai ya Yafia mokonzi ya Lakishi,+ mpe epai ya Debire mokonzi ya Eglone,+ alobi:  “Bómata epai na ngai mpe bósalisa ngai tóbɛta Gibeone, mpamba te aluki kozala na kimya na Yosua mpe bana ya Yisraele.”+  Na yango, basanganaki bango nyonso mpe bamataki, bakonzi mitano ya Baamore:+ mokonzi ya Yerusaleme, mokonzi ya Hebrone, mokonzi ya Yaramute, mokonzi ya Lakishi, mokonzi ya Eglone, bango ná basoda na bango nyonso, mpe batyaki kaa liboso ya Gibeone mpe babundaki na yango.  Ntango mibali ya Gibeone bamoni bongo, batindeli Yosua bato na kaa ya Gilgale,+ balobi: “Lobɔkɔ na yo etika baombo na yo te.+ Matá mbangu epai na biso mpo na kobikisa biso mpe kosalisa biso, mpamba te bakonzi ya Baamore, oyo bafandaka na etúká ya ngombangomba bayangani mpo na kobunda na biso.”  Bongo Yosua autaki na Gilgale, amati, ye ná bato nyonso ya etumba elongo na ye+ mpe bilombe mibali nyonso ya nguya.+  Mpe Yehova alobaki na Yosua boye: “Kobanga bango te,+ mpamba te napesi bango na lobɔkɔ na yo.+ Moto moko te kati na bango akotɛlɛma liboso na yo.”+  Bongo Yosua ayelaki bango pwasa. Amataki butu mobimba longwa na Gilgale. 10  Mpe Yehova akɔtisaki bango na mobulungano liboso ya Yisraele,+ mpe babandaki koboma bango na koboma moko monene na Gibeone+ mpe balandaki bango na nzela oyo ezali komata na Bete-horone mpe babomaki bango tii na Azeka+ mpe na Makeda.+ 11  Mpe esalemaki boye: ntango bazalaki kokima liboso ya Yisraele mpe bakómaki na nzela ya kokita na Bete-horone, Yehova akweiselaki bango mabanga minene+ uta na likoló, nzelanzela tii na Azeka, bongo bakufaki. Baoyo bakufaki na mbula ya mabanga bazalaki mingi koleka baoyo bana ya Yisraele babomaki na mopanga. 12  Ezalaki na ntango yango nde Yosua alobaki na Yehova na mokolo oyo Yehova apesaki Baamore epai ya bana ya Yisraele, mpe alobaki na miso ya Yisraele boye:“Moi,+ tɛlɛmá na Gibeone,+Mpe sanza, tɛlɛmá na lobwaku ya patatalu ya Aiyalone.”+ 13  Bongo moi etɛlɛmaki, mpe sanza etɛlɛmaki, tii ntango ekólo ya Yisraele ezongisaki mabe na banguna na yango.+ Likambo yango ekomami na buku ya Yashare te?+ Mpe moi etɛlɛmaki na katikati ya likoló mpe elalaki noki te, eumelaki soki mokolo mobimba.+ 14  Ezali na mokolo moko te oyo ekokani na oyo wana, ezala liboso na yango to nsima na yango, mpo Yehova ayokelaki mongongo ya moto,+ mpamba te Yehova ye moko azalaki kobundela Yisraele.+ 15  Nsima na yango, Yosua mpe Yisraele mobimba elongo na ye bazongaki na kaa ya Gilgale.+ 16  Na ntango yango, bakonzi wana mitano bakimaki+ mpe bakendaki komibomba na mobenga, na Makeda.+ 17  Na nsima bapesaki Yosua nsango, balobi: “Bamoni bakonzi yango mitano babombani na mobenga, na Makeda.”+ 18  Na yango, Yosua alobaki boye: “Bóbalola mabanga minene tii na monɔkɔ ya mobenga yango mpe bótya mibali na esika wana mpo na kokɛngɛla bango. 19  Nde bino, bótɛlɛma mpamba te. Bólanda banguna na bino, mpe bóbɛta bango na nsima.+ Bótika te ete bákɔta na bingumba na bango, mpo Yehova Nzambe na bino apesi bango na mabɔkɔ na bino.”+ 20  Mpe esalemaki boye: ntango kaka Yosua mpe bana ya Yisraele basilisaki koboma bango na koboma moko monene mpenza, tii ntango basilaki nyɛɛ,+ mpe baoyo babikaki kati na bango bakimaki mpe bakɔtaki na bingumba oyo ebatelami makasi,+ 21  na ntango yango bato nyonso babandaki kozonga na kimya na kaa, epai ya Yosua, na Makeda. Moto moko te afungolelaki bana ya Yisraele monɔkɔ.+ 22  Bongo Yosua alobaki ete: “Bófungola monɔkɔ ya mobenga mpe bóbimisa bakonzi wana mitano na mobenga yango mpe bóyela ngai bango.” 23  Basalaki mpe bongo mpe babimiselaki ye bakonzi yango mitano na mobenga: mokonzi ya Yerusaleme,+ mokonzi ya Hebrone,+ mokonzi ya Yaramute, mokonzi ya Lakishi+ mpe mokonzi ya Eglone.+ 24  Mpe esalemaki boye: ntango kaka babimiselaki Yosua bakonzi yango, Yosua abengisaki mibali nyonso ya Yisraele mpe alobaki na bakomanda ya mibali ya etumba oyo bakendaki na ye elongo ete: “Bópusana awa. Bótya makolo na bino na nkingo ya bakonzi oyo.”+ Bongo, bapusanaki mpe batyaki makolo na bango na nkingo ya bakonzi yango.+ 25  Mpe Yosua alobaki na bango ete: “Bóbanga te mpe bózala na nsɔmɔ te.+ Bózala na mpiko mpe bózala na makasi, mpo boye nde Yehova akosala banguna na bino nyonso oyo bozali kobunda na bango.”+ 26  Mpe nsima na yango, Yosua abɛtaki bango mpe abomaki bango mpe akakisaki bango na banzete mitano, mpe bakakemaki likoló ya banzete yango tii na mpokwa.+ 27  Mpe esalemaki boye: na ntango ya kolala ya moi, Yosua apesaki mitindo, mpe bakitisaki bango na banzete yango+ mpe babwakaki bango na mobenga esika bamibombaki. Na nsima, batyaki mabanga minene na monɔkɔ ya mobenga yango—ezali kuna tii na mokolo ya lelo. 28  Mpe Yosua azwaki Makeda+ na mokolo yango mpe abɛtaki yango na mopanga. Mpe abomaki mokonzi na yango mpe molimo nyonso oyo ezalaki kuna.+ Atikaki ata moto moko te na bomoi. Bongo, asalaki mokonzi ya Makeda+ ndenge asalaki mokonzi ya Yeriko. 29  Na nsima Yosua mpe Yisraele mobimba balongwaki na Makeda mpe bakendaki na Libina mpe babundaki na Libina.+ 30  Bongo Yehova apesaki mpe yango ná mokonzi na yango na lobɔkɔ ya Yisraele, mpe babɛtaki yango mpe molimo nyonso oyo ezalaki na kati na yango na mopanga. Batikaki ata moto moko te na bomoi na kati. Bongo, basalaki mokonzi na yango ndenge basalaki mokonzi ya Yeriko.+ 31  Na nsima, Yosua mpe Yisraele mobimba balongwaki na Libina mpe bakendaki na Lakishi+ mpe batyaki kaa liboso na yango mpe babundaki na yango. 32  Bongo Yehova apesaki Lakishi na lobɔkɔ ya Yisraele mpe bazwaki yango na mokolo ya mibale, mpe babɛtaki yango na mopanga,+ ezala mpe molimo nyonso oyo ezalaki kuna, ndenge kaka basalaki Libina. 33  Ezalaki na ntango yango nde Horame mokonzi ya Gezere,+ amataki mpo na kosalisa Lakishi. Bongo Yosua abɛtaki ye mpe bato na ye tii atikaki ata moto na ye moko te na bomoi.+ 34  Na nsima Yosua mpe Yisraele mobimba balongwaki na Lakishi mpe bakendaki na Eglone+ mpe batyaki kaa liboso na yango mpe babundaki na yango. 35  Mpe bazwaki yango na mokolo wana mpe babandaki kobɛta yango na mopanga, mpe, na mokolo yango, babomaki molimo nyonso oyo ezalaki na kati na yango, ndenge kaka basalaki Lakishi.+ 36  Na nsima Yosua mpe Yisraele mobimba balongwaki na Eglone mpe bamataki na Hebrone+ mpe babandaki kobunda na yango. 37  Mpe bazwaki yango mpe babɛtaki yango na mopanga mpe mokonzi na yango mpe basité na yango nyonso mpe molimo nyonso oyo ezalaki na kati na yango. Atikaki ata moto moko te na bomoi, kaka ndenge asalaki Eglone. Bongo, abebisaki yango mpe abomaki molimo nyonso oyo ezalaki na kati.+ 38  Na nsuka, Yosua mpe Yisraele mobimba bazongaki na Debire+ mpe babandaki kobunda na yango. 39  Mpe azwaki yango ná mokonzi na yango mpe basité na yango nyonso, mpe babɛtaki yango na mopanga mpe babomaki molimo nyonso oyo ezalaki na kati na yango.+ Atikaki ata moto moko te na bomoi.+ Ndenge asalaki Hebrone, ndenge mpe asalaki Debire ná mokonzi na yango, ndenge mpe asalaki Libina ná mokonzi na yango.+ 40  Mpe Yosua abɛtaki mokili mobimba ya etúká ya ngombangomba+ mpe Negebe+ mpe Shefela+ mpe bisika mipanzi ya bangomba+ ekiti mpe bakonzi na bango nyonso. Atikaki ata moto moko te na bomoi, abomaki+ bato nyonso,*+ ndenge Yehova Nzambe ya Yisraele apesaki mitindo.+ 41  Mpe Yosua abɛtaki bango banda na Kadeshe-barnea+ tii na Gaza+ mpe mokili mobimba ya Goshene,+ matá tii na Gibeone.+ 42  Mpe Yosua azwaki na mbala moko bakonzi wana nyonso mpe mokili na bango,+ mpamba te ezalaki Yehova Nzambe ya Yisraele nde azalaki kobundela Yisraele.+ 43  Nsima na yango, Yosua mpe Yisraele mobimba elongo na ye bazongaki na kaa ya Gilgale.+

Maloba na nse

Lil., “nyonso oyo ezalaki na mpema.”