Yosua 1:1-18
1 Mpe esalemaki boye: nsima ya liwa ya Moize, mosaleli* ya Yehova, Yehova alobaki na Yosua+ mwana ya Nunu, mosaleli+ ya Moize, boye:
2 “Moize mosaleli na ngai akufi;+ sikoyo tɛlɛmá, katisá Yordani, yo ná bato nyonso oyo, mpo na kokɔta na mokili oyo nazali kopesa bango, bana ya Yisraele.+
3 Esika nyonso oyo lokolo na bino ekonyata, nakopesa bino yango mpenza, ndenge nalakaki Moize.+
4 Banda na esobe mpe na Libá oyo, tii na ebale monene, ebale Efrate, elingi koloba: mokili mobimba ya Bahiti,+ tii na Mbu Monene epai moi elalaka, ekozala teritware na bino.+
5 Moto moko te akokoka kotɛlɛma liboso na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo.+ Ndenge nazalaki na Moize, ndenge wana nde nakozala na yo.+ Nakosundola yo te mpe nakotika yo soki moke te.+
6 Zalá na mpiko mpe zalá na makasi,+ mpo yo nde moto okosala ete bato oyo bázwa libula+ ya mokili oyo nalapelaki bankɔkɔ na bango ndai ete nakopesa bango.+
7 “Kaka nde, zalá na mpiko mpe zalá na makasi mpenza mpo okeba ete otosa makambo nyonso ndenge ezali na mobeko oyo Moize, mosaleli na ngai, apesaki yo mitindo.+ Kopɛngwa na yango te mpo na kokende na lobɔkɔ ya mobali to na lobɔkɔ ya mwasi,+ mpo osala makambo na bwanya epai nyonso oyo okokende.+
8 Buku oyo ya mobeko esengeli kolongwa na monɔkɔ na yo te,+ mpe osengeli kotángaka yango na mongongo ya nse butu moi, mpo okeba ete otosa makambo nyonso ndenge ekomami na kati na yango;+ mpo, na ndenge yango nde okolongisa nzela na yo mpe na ndenge yango nde okosala makambo na bwanya.+
9 Napesi yo mitindo te?+ Zalá na mpiko mpe zalá na makasi. Kolɛnga te mpe kozala na nsɔmɔ te,+ mpo Yehova Nzambe na yo azali na yo epai nyonso okokende.”+
10 Mpe Yosua apesaki bakapita ya bato mitindo ete:
11 “Bóleka na kati ya kaa mpe bópesa bato mitindo ete: ‘Bóbongisa biloko na bino ya kolya, mpamba te nsima ya mikolo misato banda lelo, bokokatisa Yordani oyo mpo na kokɔta mpe kozwa mokili oyo Yehova Nzambe na bino azali kopesa bino mpo ezala ya bino.’”+
12 Mpe Yosua alobaki na Barubene mpe na Bagade mpe na ndambo ya libota ya Manase ete:
13 “Bókanisa mitindo+ oyo Moize, mosaleli ya Yehova, apesaki bino na maloba oyo: ‘Yehova Nzambe na bino azali kopesa bino bopemi mpe apesi bino mokili oyo.
14 Basi na bino, bana na bino mpe bibwɛlɛ na bino bakofanda na mokili oyo Moize apesaki bino na ngámbo oyo ya Yordani;+ kasi bino bokokatisa na bituluku ya etumba+ liboso ya bandeko na bino, bilombe mibali nyonso ya nguya,+ mpe bosengeli kosalisa bango.
15 Kaka ntango Yehova akopesa bandeko na bino bopemi ndenge apesi bino, mpe bango bazwi mokili oyo Yehova Nzambe na bino azali kopesa bango,+ na ntango wana nde bokozonga mpenza na mokili na bino mpe bokozwa yango,+ mokili oyo Moize, mosaleli ya Yehova, apesaki bino na ngámbo ya Yordani epai moi ebimaka.’”+
16 Bongo, bango bapesaki Yosua eyano, balobi: “Mitindo nyonso oyo opesi biso, tokosala yango, mpe epai nyonso oyo okotinda biso tokokende.+
17 Ndenge toyokelaki Moize na makambo nyonso, tokoyokela yo se bongo. Kaka nde Yehova Nzambe na yo azala na yo+ ndenge azalaki mpe na Moize.+
18 Moto nyonso oyo akotomboka, aboyi etinda+ na yo mpe ayoki maloba na yo te na nyonso oyo okopesa ye mitindo, akobomama.+ Kaka nde, zalá na mpiko mpe zalá na makasi.”+
Maloba na nse
^ “Mosaleli.” Na Ebre, meshareth; na Latini, ministrum.