Yona 4:1-11

4  Nzokande, likambo yango esepelisaki Yona ata moke te,+ mpe asilikaki makasi.  Na yango, abondelaki Yehova mpe alobaki boye: “Sikoyo, Ee Yehova, oyo ezali te likambo oyo ezalaki kotungisa ngai ntango nazalaki na mokili na ngai? Yango wana, nawelelaki kokima na Tarasisi;+ mpo nayebaki ete yo ozali Nzambe ya ngɔlu mpe ya motema mawa,+ oyokaka nkanda noki te mpe ozali na motema boboto mingi,+ mpe oyokaka mawa mpo na likama.+  Bongo sikoyo, Ee Yehova, nabondeli yo, longolá molimo na ngai,+ mpo malamu nakufa na esika ya kozala na bomoi.”+  Kasi Yehova alobaki boye: “Ozali mpenza na ntina ya kosilika makasi boye?”+  Na nsima, Yona abimaki na engumba mpe akendaki kofanda na ɛsti ya engumba yango; mpe amisalelaki mwa ndako moko ya matiti kuna, mpo afanda na nse na yango, na malili,+ tii ntango akomona oyo ekokómela engumba.+  Bongo, Yehova Nzambe abimisaki molona moko, ekutu, mpo ezipa Yona mpe epesa malili na yango likoló ya motó na ye, mpo na kobikisa ye na mpasi na ye.+ Mpe Yona asepelaki mingi mpenza na molona yango ya ekutu.  Kasi, na mokolo oyo elandaki, ntango ntɔngɔ ezalaki kotana, Nzambe ya solo atindaki nkusu+ moko ebebisa molona wana ya ekutu; mpe mokemoke molona yango ekaukaki.+  Mpe esalemaki boye: ntango kaka moi ebimaki, Nzambe atindaki mpe mopɛpɛ moko ya ɛsti oyo ekaukisaka,+ mpe moi ezalaki se kobɛta Yona na motó, mpe etikalaki moke akatswa;+ mpe azalaki ntango nyonso kosɛnga ete molimo na ye ekufa mpe azalaki koloba mbala na mbala ete: “Malamu nakufa na esika ya kozala na bomoi.”+  Mpe Nzambe alobaki na Yona boye: “Ozali mpenza na ntina ya kosilika makasi boye mpo na molona ya ekutu?”+ Bongo alobaki ete: “Nasiliki mpenza na ntina, tii na liwa.” 10  Kasi Yehova alobaki boye: “Yo oyokeli molona ya ekutu mawa, oyo kutu omonelaki mpasi te, oyo okolisaki mpe te, kasi oyo ekolaki na butu moko mpamba mpe ekufi na butu moko mpamba. 11  Bongo ngai, nasengeli nde koyokela Ninive engumba oyo monene mawa te,+ engumba oyo ezali na bato koleka nkóto nkama moko na ntuku mibale (120 000) oyo bayebi ata moke te kokesenisa lobɔkɔ na bango ya mobali ná lobɔkɔ na bango ya mwasi, bakisa mpe ebele ya banyama ya mboka?”+

Maloba na nse