Yona 3:1-10
3 Na nsima, liloba ya Yehova eyelaki Yona mbala ya mibale ete:+
2 “Tɛlɛmá, kende na Ninive engumba monene, mpe sakwelá yango nsango+ oyo nazali koyebisa yo.”
3 Bongo Yona atɛlɛmaki mpe akendaki na Ninive ndenge Yehova alobaki.+ Nzokande, mpo na Nzambe Ninive ezalaki engumba moko monene,+ kokatisa yango ezalaki kosɛnga kotambola mikolo misato na makolo.
4 Na nsima, Yona abandaki kokɔta na engumba yango, atambolaki mokolo mobimba na makolo, mpe azalaki kosakola mpe koloba boye: “Etikali mikolo ntuku minei (40) mpamba, Ninive ekwea.”+
5 Bongo bato ya Ninive babandaki kondimela Nzambe,+ mpe basakolaki ete bákila bilei mpe bálata ngɔtɔ,+ banda na moto oyo aleki monene na kati na bango tii na moto oyo aleki moke na kati na bango.
6 Ntango liloba yango ekómelaki mokonzi ya Ninive,+ atɛlɛmaki na kiti na ye ya bokonzi mpe alongolaki elamba na ye ya bokonzi mpe alataki ngɔtɔ mpe afandaki na putulu ya mɔtɔ.+
7 Lisusu, atindaki bábelela, mpe atindaki báloba na Ninive, na nzela ya mobeko ya mokonzi mpe ya bato minene na ye ete:
“Ezala moto, ezala nyama ya mboka, ezala etonga ya bangɔmbɛ to etonga ya bampate, moko te asengeli komeka ata eloko moko. Moko te asengeli kolya. Basengeli komɛla ata mai te.+
8 Mpe bálata ngɔtɔ, moto mpe nyama ya mboka; mpe bábelela Nzambe makasi mpe bábongwana+ moto na moto na nzela na ye ya mabe mpe na mobulu oyo ezali na mabɔkɔ na bango.
9 Nani ayebi soki Nzambe ya solo akoki kobongola makanisi mpe koyoka mpenza mawa+ mpe kozonga nsima na nkanda na ye ya kongala, mpo tókufa te?”+
10 Mpe Nzambe ya solo amonaki misala na bango,+ amonaki ete babongwani na nzela na bango ya mabe;+ bongo Nzambe ya solo ayokaki mawa+ mpo na likama oyo alobaki ete akobimisela bango; mpe abimisaki yango te.+