Yobo 36:1-33
36 Mpe Elihu alobaki lisusu:
2 “Zelá ngai mwa moke, mpe nakomonisa yoEte ezali naino na maloba ya koloba mpo na Nzambe.
3 Nakouta na boyebi na ngai mosika,Mpe nakopesa Moyemi na ngai boyengebene.+
4 Mpo, ya solo, maloba na ngai ezali lokuta te;Oyo akoká na boyebi+ azali elongo na yo.
5 Talá! Nzambe azali na nguya+ mpe akobwaka moto te;Azali na mayele mingi mpenza;
6 Akotika ata moto moko te ya mabe na bomoi,+Kasi akolongisa bato ya mpasi na lisambisi.+
7 Akolongola miso na ye epai ya moyengebene te;+Ata bakonzi, na kiti ya bokonzi+—Akofandisa mpe bango libela na libela, mpe bakotombwama.
8 Mpe soki bato bakangisami na bikanga-makolo,+Bazwami na bansinga ya mpasi.
9 Bongo akoyebisa bango ndenge bazali kosalaNá misala na bango ya bobuki-mibeko, mpamba te bazali komona ete bango nde baleki.
10 Mpe akofungola litoi na bango eyoka elendiseli,+Mpe akoloba ete basengeli kolongwa na makambo oyo eyokisaka mpasi.+
11 Soki batosi mpe basaleli,Bakosukisa mikolo na bango na oyo ezali malamuMpe bambula na bango na esengo.+
12 Kasi soki batosi te, bakoleka,+ bakobomama na ebundeli ya kobwakela,+Mpe bakokata motema kozanga boyebi.
13 Mpe baoyo bazali bapɛngwi na motema bakobakisa bango moko nkanda.+Bakobelela te mpo na kosɛnga lisalisi mpo akangi bango.
14 Molimo na bango ekokufa na bolenge,+Mpe bomoi na bango na kati ya mibali oyo bazali bandumba ya tempelo.+
15 Akobikisa moto ya mpasi na mpasi na ye,Mpe akofungola litoi na bango na kati ya monyoko.
16 Mpe, ya solo, akobenda yo na monɔkɔ ya mpasi!+Esika monene,+ ya nkaka te, ekozala na esika na yango,Mpe libɔndisi ya mesa na yo ekotonda na mafuta.+
17 Na etumbu ya lisambisi oyo bapesi moto mabe,+ okotonda mpenza;Etumbu ya lisambisi mpe bosembo ekosimba.
18 Kebá noki nkanda+ ebenda yo obɛta mabɔkɔ na lityo,Mpe kotika te ete lisiko+ monene ebungisa yo nzela.
19 Kolela na yo mpo na kosɛnga lisalisi ekosala nde eloko?+ Te, ata mpe na ntango ya mpasi teAta soki osali milende na nguya na yo nyonso.+
20 Komɛla mpema te mpo na kozela butu,Mpo na kozela ntango oyo bato balongwaka na bisika bazali.
21 Kebá omipesa te na makambo oyo eyokisaka mpasi,+Mpo oponi nde yango na esika ya mpasi.+
22 Talá! Nzambe asalelaka nguya na ye na ndenge ya lokumu mpenza;Nani azali molakisi lokola ye?
23 Nani asɛngá ye azongisa monɔkɔ mpo na nzela na ye?+Mpe nani alobá: ‘Osali likambo ya kozanga boyengebene’?+
24 Kobosana te ete osengeli kokumisa mosala na ye+Oyo bato bayembelá.+
25 Bato nyonso batalá yango na likebi;Moto—mowei mpamba—azali se kotala na mosika.+
26 Talá! Nzambe atombwami koleka oyo biso tokoki koyeba;+Motángo ya mbula na ye eyebani te.+
27 Mpo abendaka matangá ya mai;+Ekɔngɔlamaka lokola mbula mpo na kosala londende na ye,
28 Bongo mapata ebimisaka matangá ya mai,+Etangiselaka bato mai ebele.
29 Kutu, nani akoki kokanga ntina ya maboke ya mapata,Ya lokito oyo euti na mwa ndako na ye ya matiti?+
30 Talá! Atandá pole na ye likoló na yango,+Mpe azipá misisa ya mbu.
31 Mpo na nzela na yango, asambaka makambo ya bato;+Apesaka bilei beboo.+
32 Na mabɔkɔ na ye, azipá mokalikali,Apesaka yango mitindo mpo na kotɛmɛla mobundisi.+
33 Lokito+ na ye eyebisaka makambo na ye,Bibwɛlɛ mpe eyebisaka makambo ya moto oyo azali koya.