Yobo 28:1-28

28  “Ya solo, esika ya kozwa palata ezali Ná esika ya kozwa wolo oyo bapɛtolaka;+   Ebende ezwamaka na putulu+Mpe uta na libanga motako esopamaka.   Atyelá molili nsuka;Mpe kino na bandelo nyonso azali kolukaluka+Libanga na kati ya molili tuu mpe na molili makasi.   Atimolá libulu mosika mpenza na bisika oyo bato bafandaka bapaya,+Bisika oyo babosaná, mosika na lokolo;Bamosusu na kati ya bato—bawei mpamba—bakitá na kodiembela, bakei epai bazongi epai.   Na mabele nde biloko ya kolya ebimaka;+Kasi nse na yango, ebalolami kobalolama lokola nde na mɔtɔ.   Mabanga na yango nde esika ya safire,+Mpe ezalaka na putulu ya wolo.   Nzela—ata ndɛkɛ moko te oyo ekangaka banyama+ eyebá yango,Liso ya kombekombe ya moindo+ emoná mpe yango te.   Banyama mineneminene ya zamba enyatanyatá yango te;Mwana-nkɔsi atambolá likoló na yango te.   Asembolá lobɔkɔ na ye likoló ya libanga ya silekise;Akweisá bangomba banda na misisa na yango; 10  Na kati ya mabanga, atimolá bilekelo oyo etondi na mai,+Mpe liso na ye emoná biloko nyonso ya motuya. 11  Bisika oyo bibale ezalaki kouta, akangá yango,+Mpe eloko oyo ebombani, ye azali kobimisa na pole. 12  Kasi bwanya—ekoki kozwama wapi,+Mpe esika ya mayele ezali wapi? 13  Moto—mowei mpamba—ayebi naino te motuya na yango,+Mpe ezwamaka te na mokili ya baoyo bazali na bomoi. 14  Mai mozindo kutu elobi:‘Ezali na kati na ngai te!’Mbu mpe elobi: ‘Ezali epai na ngai te!’+ 15  Wolo ya pɛto ekoki te kopesama na esika na yango,+Mpe palata ekoki te komekama kilo mpo na kosomba yango. 16  Bakoki te kosomba yango na wolo ya Ofire,+To na libanga ya onikisi oyo emonanaka mingi te, to mpe na safire. 17  Wolo ná talatala ekoki kokokanisama na yango te,Mpe mbɛki ata moko te ya wolo oyo epɛtolami ekoki kopesama na esika na yango. 18  Mabanga kitoko ya korai+ ná libanga ya kristale ekotángama ata kotángama te,Kasi saki oyo etondi na bwanya eleki saki oyo etondi na mayaka.+ 19  Bakoki kokokanisa yango te na libanga ya topazi+ ya Kushi;Mpe bakoki te kosomba yango na wolo oyo ezali pɛto. 20  Kasi bwanya—eutaka wapi,+Bongo esika ya mayele ezali nde wapi? 21  Ebombamelá kutu miso ya moto nyonso oyo azali na bomoi,+Mpe ebombamelá bikelamu oyo epumbwaka na likoló. 22  Libebi ná liwa balobi:‘Toyoká nsango na yango na matoi na biso.’ 23  Nzambe nde Ye oyo akangi ntina ya nzela na yango,+Mpe ye moko nde ayebi esika na yango, 24  Mpo ye moko atalaka kino na bansukansuka nyonso ya mabele;+Amonaka na nse ya likoló mobimba, 25  Mpo na kopesa mopɛpɛ+ bozito,Wana akabolá mai na emekeli;+ 26  Ntango atyaki lilako mpo na mbula,+Mpe nzela mpo na lipata ya mbula ya mopɛpɛ makasi mpe ya bankake, 27  Na ntango yango nde amonaki bwanya mpe abandaki kolobela yango;Abongisaki yango, mpe lisusu azalaki kolukaluka na kati na yango. 28  Mpe alobaki na moto ete:‘Talá! Kobanga Yehova—nde bwanya,+Mpe kopɛngwa na mabe nde mayele.’”+

Maloba na nse