Yobo 26:1-14

26  Bongo Yobo ayanolaki mpe alobaki ete:  2  “Wana nde lisalisi ya solosolo opesi moto oyo asili nguya!Obikisi mpenza lobɔkɔ oyo ezangi makasi!+  3  Opesi mpenza moto oyo azangi bwanya+ toli,Mpe osali ete ebele ya bato báyeba bwanya!  4  Oyebisi maloba oyo na nani,Mpe mpema ya nani ebimi epai na yo?  5  Baoyo bazangi makasi kati na liwa bazali se kolɛngaNa nse ya mai mpe ya biloko oyo efandaka kuna.+  6  Nkunda* ezali bolumbu liboso na ye,+Mpe esika ya libebi ezipami te.  7  Atandi nɔrdi na esika oyo ezali mpamba,+Akakisi mabele na eloko moko te;  8  Azingi mai na kati ya mapata na ye,+Bongo mapata ezali kopasuka te na nse na yango;  9  Azipi liboso ya kiti ya bokonzi,Atandi lipata+ na ye likoló na yango. 10  Asalá zolongano na etando ya mai,+Kino na esika oyo pole esukaka na kati ya molili. 11  Makonzí ya likoló ezali kolɛnga,Mpe ekamwe mpo na mpamela na ye. 12  Na nguya na ye, atombokisi mbu,+Mpe na mayele na ye, abukibuki+ eloko oyo enyokolaka.+ 13  Na mopɛpɛ na ye akómisi likoló sɛlisɛli,+Lobɔkɔ na ye etɔbɔli nyoka oyo esɛlimwaka.+ 14  Talá! Wana nde ebandeli ya banzela na ye,+Mpe oyo nde mwa nungunungu ya likambo bayoki mpo na ye!Kasi nkake na ye ya nguya, nani akomonisa ete akangi ntina na yango?”+

Maloba na nse

^ To, “Sheole.” Talá Ap 4.