Yobo 14:1-22

14  “Moto, oyo abotamá na mwasi,+ Azalaka na bomoi mokuse+ mpe atondi na mpasi.+   Abimi lokola fololo, mpe akatami,+Mpe akimaka lokola elili+ mpe azalaka lisusu te.   Ɛɛ, yo ofungoleli moto yango liso na yo,Mpe ngai, omemi ngai nasamba+ na yo.   Nani akoki kobimisa moto ya pɛto na moto ya mbindo?+Moto moko te.   Soki mikolo na ye ekatamá,+Motángo ya basanza na ye ezali epai na yo;Otyelá ye mobeko mpo abuka yango te.   Longolá miso na yo epai na ye mpo apema,+Tii ntango akosepela ndenge mosali oyo azwaka lifuti asepelaka na mokolo na ye.   Mpo, ata kutu mpo na nzete, elikya ezalaka.Soki bakati yango, ekobimisa lisusu bitape ya sika,+Mpe mwa etape na yango ekolimwa te.   Soki mosisa na yango enuni na mabeleMpe soki ekumu na yango ekufi na kati ya putulu,   Soki eyoki nsolo ya mai ekobimisa bitape ya sika+Mpe ekobimisa mpenza etape lokola nzete ya sika.+ 10  Kasi mobali makasi azali kokufa mpe azali kolala, balongi ye;Mpe moto ya mabele akati motema, mpe wapi ye?+ 11  Mai ezali kolimwa na mbu,Mpe ebale ezali kosila mai mpe kokauka.+ 12  Moto mpe asengeli kolala mpe akotɛlɛma te.+Tii ntango likoló ekozala lisusu te, bakolamuka te,+Bakolamwisama mpe na mpɔngi na bango te.+ 13  Aa soki obombaka ngai ata na Nkunda,*+Soki obombaka ngai tii nkanda na yo ekozonga nsima,Soki okatelaka ngai ata ntango+ mpo okanisa ngai!+ 14  Soki mobali makasi akufi, akoki kozonga lisusu na bomoi?+Mikolo nyonso ya kotindama oyo natindamaka na mosala makasi, nakozela,+Tii ntango kobɔndisama na ngai ekoya.+ 15  Yo okobenga, mpe ngai nakondima.+Okozala na mposa makasi ya mosala ya mabɔkɔ na yo. 16  Mpo sikoyo, ozali kokoba kotánga matambe na ngai;+Ozali kotala eloko mosusu te kaka lisumu na ngai.+ 17  Botomboki na ngai ekangisami na elembo na kati ya saki moko,+Mpe ozali kopakola kɔlɛ likoló ya libunga na ngai. 18  Nzokande, ngomba kutu, oyo ezali kokwea, ekobebabeba,Ata libanga mpe ekolongolama na esika na yango. 19  Ya solo, mai kutu elyaka ata mabanga;Kosopana na yango ekɔmbɔlaka putulu ya mabele.Boye obebisi elikya ya moto—mowei mpamba. 20  Olongaka ye seko mpe akendaka na ye;+Obebisaka ye elongi mpe otikaka ye akende. 21  Bapesi bana na ye lokumu, kasi ayebi yango te;+Bakómi biloko mpamba, kasi ye atyelaka bango likebi te. 22  Kaka mosuni na ye ntango ezali likoló na ye nde ekokoba koyoka mpasi,Mpe molimo na ye ntango ezali na kati na ye nde ekokoba kolela.”

Maloba na nse

To, “Sheole.” Talá Ap 4.