Yobo 1:1-22
1 Mobali moko azalaki na mokili ya Uze,+ nkombo na ye Yobo;+ mobali yango azalaki na mbeba te+ mpe azalaki sembo,+ mpe azalaki kobanga Nzambe+ mpe kokima mabe.+
2 Abotaki bana mibali nsambo mpe bana basi misato.+
3 Mpe bibwɛlɛ+ na ye ezalaki bampate nkóto nsambo (7 000), bakamela nkóto misato (3 000), bangɔmbɛ nkóto moko (1 000) oyo bakangisi mibalemibale ná bampunda ya basi nkama mitano (500), azalaki mpe na ebele ya basali; mpe mobali yango akómaki moto monene koleka bato nyonso ya Ɛsti.+
4 Mpe bana na ye ya mibali bazalaki kokende kosala fɛti+ na ndako ya mokomoko na bango, moto na moto na mokolo na ye; babengisaki bandeko na bango misato ya basi mpo na kolya mpe komɛla elongo na bango.
5 Mpe ezalaki kosalema boye: soki mikolo ya fɛti eleki tii na moto ya nsuka, Yobo azalaki kotindela bango maloba mpe kosantisa bango;+ mpe azalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kopesa bambeka ya kotumba+ na kolanda motángo na bango nyonso; mpo Yobo azalaki koloba, “ntango mosusu bana na ngai basali lisumu mpe balakeli Nzambe mabe+ na motema na bango.”+ Yobo azalaki kosala bongo ntango nyonso.+
6 Nzokande, mokolo oyo bana ya Nzambe ya solo+ bakɔtaki mpo na kotɛlɛma liboso ya Yehova+ ekómaki, Satana+ mpe akɔtaki elongo na bango.+
7 Na nsima Yehova alobaki na Satana: “Outi wapi?” Bongo Satana apesaki Yehova eyano mpe alobaki: “Nauti kotambolatambola na mabele+ mpe kolekaleka kuna.”+
8 Mpe Yehova alobaki lisusu na Satana: “Otyaki likebi na mosaleli na ngai Yobo? Ete na mabele moto moko lokola ye azali te,+ oyo azangi mbeba+ mpe azali sembo,+ abangaka Nzambe+ mpe akimaka mabe?”+
9 Bongo Satana apesaki Yehova eyano mpe alobaki ete: “Yobo abangi Nzambe nde mpamba?+
10 Yo otɛlɛmisi lopango te zingazinga na ye+ mpe zingazinga ya ndako na ye mpe zingazinga ya eloko nyonso oyo azali na yango epai na epai? Opamboli+ mosala ya mabɔkɔ na ye, mpe bibwɛlɛ na ye epalangani mingi na mabele.
11 Kasi, mpo makambo ebongwana, nabondeli yo, sembolá lobɔkɔ na yo, mpe simbá eloko nyonso oyo azali na yango, bongo otala soki akolakela yo mabe te na miso na yo.”+
12 Na yango, Yehova alobaki na Satana: “Talá! Biloko na ye nyonso ezali na lobɔkɔ na yo. Kasi ye moko, kosembolela ye lobɔkɔ na yo te!” Bongo Satana abimaki, alongwe liboso ya elongi ya Yehova.+
13 Bongo mokolo oyo bana na ye ya mibali mpe bana na ye ya basi bazalaki kolya mpe komɛla vinyo na ndako ya ndeko na bango ya mobali, mwana ya liboso ekómaki.+
14 Mpe momemi-nsango+ moko ayaki epai ya Yobo, mpe alobaki na ye boye: “Bangɔmbɛ ezalaki kobalola mabele+ mpe bampunda ya basi ezalaki kolya matiti pembeni na yango,
15 bongo Basabea+ bakɔtaki kobundisa mpe bazwi yango, mpe babomi basaleli na mopanga; kasi ngai nabiki, kaka ngai moko, mpo na koyebisa yo.”+
16 Oyo wana azalaki naino koloba ntango mosusu ayaki mpe alobaki ete: “Mɔtɔ ya Nzambe euti na likoló ekwei,+ mpe epeli na katikati ya bampate ná basali mpe ezikisi bango; kasi ngai nabiki, kaka ngai moko, mpo na koyebisa yo.”
17 Oyo wana azalaki naino koloba ntango mosusu ayaki mpe alobaki: “Bakaladea+ basalaki bituluku misato mpe babimeli bakamela mpe bazwi yango, mpe babomi basaleli na mopanga; kasi ngai nabiki, kaka ngai moko, mpo na koyebisa yo.”
18 Oyo wana mosusu azalaki naino koloba ntango mosusu lisusu ayaki mpe alobaki ete: “Bana na yo ya mibali mpe ya basi bazalaki kolya mpe komɛla vinyo+ na ndako ya ndeko na bango ya mobali, mwana ya liboso.
19 Mpe talá! mopɛpɛ moko ya makasi+ euti na etúká ya esobe, ebɛti matumu minei ya ndako, mpe ndako ekweli bilenge yango mpe bakufi. Kasi ngai nabiki, kaka ngai moko, mpo na koyebisa yo.”
20 Bongo Yobo atɛlɛmaki mpe apasolaki+ kazaka na ye oyo ezangá mabɔkɔ mpe akokolaki motó+ na ye mpe akweaki na mabele+ mpe agumbamaki+
21 mpe alobaki ete:“Nabimaki bolumbu na libumu ya mama na ngai,+Mpe nakozonga kuna bolumbu.+Yehova ye moko apesi,+ mpe Yehova ye moko abɔtɔli.+Nkombo ya Yehova ekoba kokumisama.”+
22 Na oyo nyonso, Yobo asalaki lisumu te mpe alobaki na Nzambe likambo ata moko te ya mabe.+