Yoane 7:1-53

7  Bongo nsima ya makambo wana Yesu akobaki kotambola na Galile, mpo alingaki kotambola na Yudea te, mpo Bayuda bazalaki koluka koboma+ ye.  Nzokande, fɛti ya Bayuda, fɛti ya batabernakle,+ ekómaki pene.  Bongo bandeko na ye+ balobaki na ye ete: “Longwá awa mpe kende na Yudea, mpo bayekoli na yo mpe bámona misala oyo ozali kosala.  Mpo moto asalaka makambo na kobombana te soki azali koluka koyebana polele. Lokola ozali kosala makambo oyo, omimonisa na mokili.”  Ya solo, bandeko na ye+ bazalaki kondimela ye te.+  Bongo Yesu alobaki na bango ete: “Ntango na ngai ekoki naino te,+ kasi ntango na bino ezali wana ntango nyonso.  Mokili ezali na ntina moko te ya koyina bino, kasi ezali koyina ngai, mpamba te nazali kopesa litatoli ete misala na yango ezali mabe.+  Bino bómata na fɛti; ngai nakomata naino na fɛti yango te, mpo ntango na ngai+ ekoki naino mpenza te.”+  Bongo nsima ya koyebisa bango makambo wana, atikalaki na Galile. 10  Kasi ntango bandeko na ye bamataki na fɛti, ye moko mpe amataki na nsima, na polele te kasi na kobombana.+ 11  Bongo Bayuda babandaki koluka+ ye na fɛti mpe koloba ete: “Wapi moto yango?” 12  Mpe na kati ya ebele ya bato, bazalaki kosolola mingi na nse nse mpo na ye.+ Bamosusu bazalaki koloba ete: “Azali moto malamu.” Bamosusu bazalaki koloba ete: “Te, azali nde kobungisa ebele ya bato nzela.” 13  Ya solo, moto moko te azalaki koloba polele mpo na ye mpamba te bazalaki kobanga Bayuda.+ 14  Ntango fɛti ekómaki na katikati, Yesu amataki na tempelo mpe abandaki koteya.+ 15  Na yango, Bayuda bakómaki kokamwa, balobi: “Ndenge nini moto oyo azwi boyebi ya mikanda,+ nzokande atángá kelasi te?”+ 16  Bongo, Yesu ayanolaki bango mpe alobaki ete: “Oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ya moto oyo atindaki ngai.+ 17  Soki moto azali na mposa ya kosala mokano na Ye, akoyeba soki liteya yango euti na Nzambe+ to soki nazali koloba makambo oyo euti na ngai moko. 18  Moto oyo alobaka makambo oyo euti na ye moko alukaka nkembo na ye moko; kasi moto oyo alukaka nde nkembo+ ya oyo atindaki ye, moto yango alobaka solo, mpe kozanga boyengebene ezali na kati na ye te. 19  Moize apesaki bino Mibeko,+ boye te? Kasi ata moko te na kati na bino atosaka Mibeko. Mpo na nini bozali koluka koboma ngai?”+ 20  Ebele yango ya bato bayanolaki ete: “Ozali na demo.+ Nani azali koluka koboma yo?” 21  Yesu azongiselaki bango ete: “Nasali kaka likambo moko,+ mpe bino nyonso bozali kokamwa. 22  Yango wana Moize apesaki bino kokatama ngenga+—ezali te ete euti na Moize, kasi euti nde na bankɔkɔ+—mpe bino bokataka moto ngenga na sabata. 23  Soki moto akatamaka ngenga na sabata mpo mobeko ya Moize ebukama te, bozali nde kosilikela ngai makasi mpo nakómisi moto nzoto kolɔngɔnɔ mpenza na sabata?+ 24  Bótika kosambisa na kolanda oyo ezali komonana na libándá, kasi bósambisa na kosambisa ya sembo.”+ 25  Bongo bamosusu na kati ya bato oyo bafandaka na Yerusaleme babandaki koloba ete: “Oyo moto bazali koluka koboma,+ boye te? 26  Kasi, talá! azali koloba na miso ya bato,+ mpe bazali koloba na ye eloko te. Boye bankumu bayebi mpenza ete ye azali Kristo?+ 27  Kutu, biso toyebi epai moto oyo auti;+ nzokande ntango Kristo akoya, moto moko te akoyeba epai auti.”+ 28  Bongo Yesu agangaki ntango azalaki koteya na tempelo mpe alobaki ete: “Boyebi ngai mpe boyebi epai wapi nauti.+ Lisusu, nayei na ndenge na ngai moko te,+ kasi oyo atindaki ngai azali mpenza,+ mpe bino boyebi ye te.+ 29  Ngai nayebi ye,+ mpamba te nazali momonisi oyo auti epai na ye, mpe Moto wana nde atindaki ngai.”+ 30  Na yango babandaki koluka kokanga ye,+ kasi ata moto moko te atyaki ye lobɔkɔ, mpo ngonga na ye+ ekokaki naino te. 31  Nzokande, mingi na kati ya ebele wana ya bato bandimelaki ye;+ mpe babandaki koloba ete: “Ntango Kristo akoya, akosala nde bilembo+ mingi koleka oyo moto oyo asali?” 32  Bafarisai bayokaki ebele yango ya bato bazali koloba makambo wana na nse nse mpo na ye, mpe banganga-nzambe bakonzi mpe Bafarisai batindaki bapolisi bákende kokanga ye.+ 33  Bongo Yesu alobaki ete: “Nazali na bino mwa ntango moke lisusu liboso ete nakende epai na ye oyo atindaki ngai.+ 34  Bokoluka ngai,+ kasi bokomona ngai te, mpe epai ngai nazali bino bokoki kokóma te.”+ 35  Na yango Bayuda balobanaki bango na bango ete: “Moto oyo alingi kokende wapi, mpo tómona ye te? Alingi nde kokende epai ya Bayuda oyo bapalanganá+ na kati ya Bagrɛki mpe koteya Bagrɛki? 36  Elakisi nini liloba oyo alobi ete: ‘Bokoluka ngai, kasi bokomona ngai te, mpe epai ngai nazali bino bokoki kokóma te’?” 37  Nde na mokolo ya nsuka, mokolo monene ya fɛti,+ Yesu atɛlɛmaki mpe agangaki ete: “Soki moto azali na mposa ya mai,+ aya epai na ngai mpe amɛla. 38  Moto oyo andimeli ngai,+ kaka ndenge Likomami elobá: ‘Uta na kati na ye mpenza bibale ya mai ya bomoi ekotíyola.’”+ 39  Nzokande, alobaki bongo mpo na elimo oyo baoyo bandimelaki ye balingaki kozwa; mpo na ntango wana elimo+ ezalaki te, mpo Yesu azwaki naino nkembo+ te. 40  Bongo bamosusu na kati ya ebele wana ya bato oyo bayokaki maloba yango, babandaki koloba ete: “Oyo azali solo mpenza Mosakoli Yango.”+ 41  Bamosusu bazalaki koloba ete: “Oyo azali Kristo.”+ Kasi bamosusu bazalaki koloba ete: “Ya solo Kristo+ akouta na Galile te, boye te?+ 42  Likomami elobá te ete Kristo akouta na kati ya bana ya Davidi,+ mpe na Beteleme+ mboka oyo Davidi azalaki kofanda?”+ 43  Bongo bokabwani ekɔtaki na kati ya ebele wana ya bato mpo na ye.+ 44  Kutu bamosusu na kati na bango bazalaki koluka kokanga ye, kasi moto moko te atyaki ye mabɔkɔ. 45  Na yango, bapolisi bazongaki epai ya banganga-nzambe bakonzi mpe Bafarisai, bongo Bafarisai yango balobaki na bango ete: “Mpo na nini boyei na ye te?” 46  Bapolisi bayanolaki ete: “Naino moto mosusu alobá lokola moto oyo te.”+ 47  Bongo Bafarisai bayanolaki ete: “Bino mpe bobungisami nzela? 48  Moko ya bankumu to ya Bafarisai andimeli nde ye?+ 49  Kasi ebele wana ya bato oyo bayebi Mibeko te, bazali bato balakelamá mabe.”+ 50  Nikodeme, oyo liboso akendaki epai na ye, mpe oyo azalaki moko na bango, alobaki na bango ete: 51  “Mibeko na biso esambisaka nde moto soki eyoki+ ye liboso te mpe soki eyebi te oyo ye azali kosala?” 52  Bazongiselaki ye ete: “Yo mpe outi nde na Galile? Luká mpo omona ete ata mosakoli moko te+ asengeli kobima na Galile.”* * Bamaniskri אBsys etyá te makambo banda vɛrsɛ ya 53 tii na mokapo ya 8, vɛrsɛ ya 11, oyo elobi (na mwa bokeseni na kati ya makomi ya Grɛki mpe mabongoli na yango ndenge na ndenge) ete: 53  Bongo bakendaki moto na moto epai na ye.

Maloba na nse