Yoane 6:1-71
6 Nsima ya makambo wana Yesu akatisaki na ngámbo mosusu ya mbu ya Galile, to Tiberiase.+
2 Kasi ebele mpenza ya bato bakobaki kolanda ye, mpo bazalaki komona bilembo oyo azalaki kosala epai ya bato oyo bazalaki kobɛla.+
3 Bongo Yesu amataki na ngomba,+ mpe kuna afandaki elongo na bayekoli na ye.
4 Nzokande elekeli,+ fɛti ya Bayuda, ekómaki pene.
5 Bongo, ntango Yesu atombolaki miso mpe amonaki ete ebele mpenza ya bato bazali koya epai na ye, alobaki na Filipe ete: “Epai wapi tokosombela bato oyo mampa mpo bálya?”+
6 Nzokande, azalaki koloba bongo mpo na komeka ye, mpo ye moko ayebaki eloko oyo alingaki kosala.
7 Filipe ayanolaki ye ete: “Mampa ya denari nkama mibale (200) ekokoka bango te, mpo ete moto na moto azwa mwa moke.”+
8 Moko ya bayekoli na ye, Andre ndeko ya Simo Petro, alobaki na ye ete:
9 “Mwana mobali moko ya moke azali awa na mampa mitano ya ɔrje+ ná mwa mbisi mibale ya mike. Kasi yango ezali eloko nini mpo na bato ebele boye?”+
10 Yesu alobaki ete: “Bóloba na bato báfanda lokola na ntango ya kolya.”+ Nzokande matiti ezalaki mingi na esika yango. Bongo bato bafandaki, mibali soki nkóto mitano (5 000).+
11 Bongo Yesu akamataki mampa yango mpe, nsima ya kopesa matɔndi, akabolelaki yango baoyo bafandaki, asalaki mpe bongo na bambisi wana ya mike, ndenge balingaki.+
12 Kasi ntango batondaki,+ alobaki na bayekoli na ye ete: “Bósangisa biteni oyo etikali, mpo eloko ata moko ebebisama te.”
13 Bongo basangisaki yango, mpe batondisaki kitunga zomi na mibale na biteni ya mampa mitano ya ɔrje, oyo baoyo balyaki batikaki.+
14 Bongo ntango bato bamonaki bilembo oyo asalaki, babandaki koloba ete: “Oyo azali solo mpenza mosakoli+ oyo asengelaki koya na mokili.”
15 Bongo Yesu, lokola ayebaki ete balingi koya kokanga ye mpo na kotya ye mokonzi, alongwaki akei+ lisusu na ngomba, kaka ye moko.
16 Ntango mpokwa ekómaki, bayekoli na ye bakitaki na mbu,+
17 mpe, bamataki na masuwa, bakatisaki mbu mpo na kokende na Kapernaume. Ɛɛ, na ntango wana, molili esilaki kokɔta mpe Yesu ayaki naino epai na bango te.
18 Lisusu, mbu ebandaki kotomboka mpo mopɛpɛ moko makasi ezalaki kopɛpa.+
19 Nzokande, ntango balúkaki bakilomɛtrɛ soki mitano to motoba, bamonaki Yesu azali kotambola likoló ya mbu mpe kopusana pene ya masuwa; mpe bakómaki kobanga.+
20 Kasi alobaki na bango ete: “Ezali ngai; bóbanga te!”+
21 Bongo balingaki kokɔtisa ye na masuwa, mpe na mbala moko masuwa yango ekómaki na mokili epai bazalaki koluka kokende.+
22 Na mokolo oyo elandaki ebele ya bato oyo batɛlɛmaki na ngámbo mosusu ya mbu bamonaki ete ata masuwa moko te ezalaki kuna kaka masuwa moko ya moke, mpe ete Yesu akɔtaki na masuwa yango te elongo na bayekoli na ye, kasi kaka bayekoli na ye nde bakendaki;
23 kasi bamasuwa oyo eutaki na Tiberiase ekómaki pene ya esika oyo balyaki mampa nsima wana Nkolo apesaki matɔndi.
24 Bongo ntango ebele wana ya bato bamonaki ete Yesu azalaki wana te ná bayekoli na ye mpe te, bamataki na bamasuwa na bango ya mike mpe bayaki na Kapernaume koluka+ Yesu.
25 Bongo ntango bakutaki ye na ngámbo mosusu ya mbu balobaki na ye ete: “Rabi,+ okómi awa ntango nini?”
26 Yesu azongiselaki bango mpe alobaki ete: “Ya solosolo mpenza, nalobi na bino ete: Bozali koluka ngai, ezali te mpo bomonaki bilembo, kasi mpo bolyaki mampa mpe botondaki.+
27 Bósalaka mosala, ezala te mpo na bilei oyo ebebaka,+ kasi mpo na bilei oyo eumelaka mpo na bomoi ya seko,+ oyo Mwana ya moto akopesa bino; mpo ye nde Tata, ɛɛ Nzambe, atyá elembo ete andimi ye.”+
28 Bongo balobaki na ye ete: “Tosengeli kosala nini mpo na kokokisa misala ya Nzambe?”
29 Yesu azongiselaki bango ete: “Oyo ezali mosala ya Nzambe, ete bóndimela+ moto oyo Ye atindaki.”+
30 Na yango balobaki na ye ete: “Bongo elembo nini ozali kosala,+ mpo tómona yango mpe tóndima yo? Mosala nini ozali kosala?
31 Bankɔkɔ na biso balyaki mana+ na esobe, ndenge ekomamá ete: ‘Apesaki bango limpa oyo euti na likoló mpo bálya.’”+
32 Na yango Yesu alobaki na bango ete: “Ya solosolo mpenza, nalobi na bino: Moize apesaki bino limpa oyo euti na likoló te, kasi Tata na ngai nde azali mpenza kopesa bino limpa ya solosolo oyo euti na likoló.+
33 Mpo limpa ya Nzambe nde oyo euti na likoló mpe oyo ezali kopesa mokili bomoi.”
34 Bongo balobaki na ye ete: “Nkolo, pesá biso limpa yango ntango nyonso.”+
35 Yesu alobaki na bango ete: “Ngai nazali limpa ya bomoi. Moto oyo azali koya epai na ngai akoyoka nzala lisusu ata moke te, mpe moto oyo azali kondimela ngai akoyoka mposa ya mai lisusu ata moke te.+
36 Kasi nalobi na bino ete: Ata bomoni ngai, kasi bozali kondima te.+
37 Nyonso oyo Tata azali kopesa ngai ekoya epai na ngai, mpe moto oyo azali koya epai na ngai nakobengana ye ata moke te;+
38 mpamba te, nautaki na likoló+ nakiti mpo na kosala, mokano na ngai te, kasi mokano ya moto oyo atindaki ngai.+
39 Oyo ezali mokano ya moto oyo atindaki ngai: ete nabungisa moko te na kati ya nyonso oyo ye apesaki ngai, kasi ete nasekwisa+ yango na mokolo ya nsuka.
40 Mpo oyo ezali mokano ya Tata na ngai: ete moto nyonso oyo azali komona Mwana mpe azali kondimela ye azwa bomoi ya seko,+ mpe nakosekwisa ye na mokolo ya nsuka.”+
41 Na yango, Bayuda babandaki koimaima mpo na ye mpamba te alobaki ete: “Ngai nazali limpa oyo euti na likoló”;+
42 mpe babandaki koloba ete:+ “Oyo Yesu mwana ya Yozefe;+ toyebi tata na ye mpe mama na ye, boye te? Ndenge nini azali sikoyo koloba ete: ‘Nauti na likoló’?”
43 Yesu azongiselaki bango ete: “Bótika koimaima na kati na bino.
44 Moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te;+ mpe ngai nakosekwisa ye na mokolo ya nsuka.+
45 Ekomamá na Basakoli ete: ‘Mpe bango nyonso bakoteyama na Yehova.’+ Moto nyonso oyo ayoki makambo oyo euti epai ya Tata mpe ayekoli ayaka epai na ngai.+
46 Ezali te ete moto moko amoná Tata,+ longola kaka moto oyo auti epai ya Nzambe, ye wana nde amoná Tata.+
47 Ya solosolo mpenza, nalobi na bino ete: Moto oyo andimi azwi bomoi ya seko.+
48 “Ngai nazali limpa+ ya bomoi.
49 Bankɔkɔ na bino balyaki mana+ na esobe kasi bakufaki.
50 Oyo ezali limpa oyo euti na likoló, mpo ete moto nyonso alya yango mpe akufa te.
51 Ngai nazali limpa ya bomoi oyo euti na likoló; soki moto azali kolya limpa yango akozala na bomoi libela; mpe, ya solo, limpa oyo nakopesa ezali mosuni+ na ngai mpo na bomoi ya mokili.”+
52 Bongo Bayuda babandaki kotyana ntembe bango na bango ete: “Ndenge nini moto oyo akoki kopesa biso mosuni na ye tólya?”
53 Na yango, Yesu alobaki na bango ete: “Ya solosolo mpenza, nalobi na bino ete: Soki bolei mosuni+ ya Mwana ya moto te mpe bomɛli makila+ na ye te, bozali na bomoi+ na kati na bino te.
54 Moto oyo azali kolya mosuni na ngai mpe komɛla makila na ngai azwi bomoi ya seko, mpe nakosekwisa+ ye na mokolo ya nsuka;
55 mpo mosuni na ngai ezali eloko ya kolya ya solosolo, mpe makila na ngai ezali eloko ya komɛla ya solosolo.
56 Moto oyo azali kolya mosuni na ngai mpe komɛla makila na ngai azali koumela na bomoko elongo na ngai, mpe ngai na bomoko elongo na ye.+
57 Kaka ndenge Tata ya bomoi+ atindaki ngai mpe ngai nazali na bomoi mpo na Tata, moto oyo mpe azali kolya ngai, ɛɛ moto wana akozala na bomoi mpo na ngai.+
58 Oyo ezali limpa oyo euti na likoló. Ezali te lokola ntango bankɔkɔ na bino balyaki kasi bakufaki. Moto oyo azali kolya limpa oyo akozala na bomoi libela.”+
59 Alobaki makambo wana ntango azalaki koteya na liyangani ya bato nyonso na Kapernaume.
60 Bongo mingi na kati ya bayekoli na ye, ntango bayokaki yango, balobaki ete: “Liloba oyo ezali makasi; nani akoki koyoka yango?”+
61 Kasi Yesu, lokola ayebaki na kati na ye moko ete bayekoli na ye bazalaki koimaima mpo na yango, alobaki na bango ete: “Yango ezali kobɛtisa bino libaku?+
62 Bongo soki bomoni Mwana ya moto azali komata epai ye azalaki liboso?+
63 Elimo nde epesaka bomoi;+ mosuni ezali na ntina ata moke te. Maloba oyo nalobi na bino ezali elimo+ mpe ezali bomoi.+
64 Kasi bamosusu na kati na bino bazali kondima te.” Mpo uta ebandeli Yesu ayebaki banani wana bazalaki kondima te mpe nani moto oyo akotɛka ye.+
65 Bongo alobaki lisusu ete: “Yango wana nalobaki na bino ete: Moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata apesi ye nzela te.”+
66 Mpo na yango, mingi na kati ya bayekoli na ye bazongelaki biloko ezalaki na nsima+ mpe balingaki lisusu kotambola elongo na ye te.+
67 Bongo Yesu alobaki na bantoma zomi na mibale ete: “Bino mpe bolingi kokende te, boye te?”
68 Simo Petro+ ayanolaki ye ete: “Nkolo, tokokende epai ya nani?+ Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko;+
69 mpe biso tosili kondima mpe koyeba ete yo ozali Mosantu ya Nzambe.”+
70 Yesu ayanolaki bango ete: “Naponaki bino nyonso zomi na mibale,+ boye te? Kasi moko na bino azali moto oyo akoselaka bato makambo.”+
71 Ya solo, azalaki koloba mpo na Yudasi mwana ya Simo Mokeriota; mpo ye nde alingaki kotɛka+ ye, atako azalaki moko ya bantoma zomi na mibale.