Yoane 5:1-47
5 Nsima ya makambo wana ezalaki na fɛti+ moko ya Bayuda, mpe Yesu amataki na Yerusaleme.
2 Nzokande na Yerusaleme pene na porte ya bampate+ ezali na pisini moko oyo ebengami na Ebre Betezata, na veranda ya makonzí mitano.
3 Na kati na yango ebele ya bato ya maladi, ya bato bakufá miso mpe ya batɛngumi mpe ya bato oyo binama ekauká, balalaki wana.
4 ——
5 Kasi moto moko azalaki kuna oyo aumelaki na maladi na ye mbula ntuku misato na mwambe (38).
6 Lokola amonaki moto wana alali, mpe lokola ayebaki ete asilaki kolekisa ntango molai na maladi,+ Yesu alobaki na ye ete: “Olingi kokóma nzoto kolɔngɔnɔ?”+
7 Moto yango ya maladi ayanolaki ye ete: “Tata, nazali na moto te oyo akotya ngai na pisini ntango mai ezali koningana; kasi ntango nazali koya, mosusu akiti liboso na ngai.”
8 Yesu alobaki na ye ete: “Tɛlɛmá, lokɔtá litɔkɔ na yo mpe tambolá.”+
9 Bongo na mbala moko moto yango akómaki nzoto kolɔngɔnɔ, mpe alokɔtaki litɔkɔ na ye mpe abandaki kotambola.
Nzokande mokolo yango ezalaki sabata.+
10 Bongo Bayuda babandaki koloba na moto oyo abikaki na maladi ete: “Ezali Sabata, mpe epekisami+ omema litɔkɔ.”
11 Kasi ayanolaki bango ete: “Moto oyo akómisi ngai nzoto kolɔngɔnɔ alobaki na ngai ete: ‘Lokɔtá litɔkɔ na yo mpe tambolá.’”
12 Batunaki ye ete: “Nani moto oyo ayebisaki yo ete: ‘Lokɔtá yango mpe tambolá’?”
13 Kasi moto wana oyo abikaki na maladi ayebaki te soki ezalaki nani, mpo Yesu alongwaki wana, mpo na ebele ya bato oyo bazalaki na esika yango.
14 Nsima ya makambo wana Yesu akutaki ye na tempelo mpe alobaki na ye ete: “Talá, okómi nzoto kolɔngɔnɔ. Kosala lisusu lisumu te, mpo likambo moko ya mabe koleka ekómela yo te.”
15 Moto yango akendaki mpe ayebisaki Bayuda ete Yesu nde akómisi ye nzoto kolɔngɔnɔ.
16 Mpo na yango Bayuda babandaki konyokola+ Yesu, mpo azalaki kosala makambo wana na Sabata.
17 Kasi ayanolaki bango ete: “Tata na ngai azali kokoba kosala tii sikoyo, ngai mpe nazali kokoba kosala.”+
18 Mpo na yango nde Bayuda balukaki lisusu makasi koboma ye,+ mpo azalaki kaka kobuka Sabata te, kasi azalaki mpe kobenga Nzambe Tata+ na ye mpenza, na ndenge yango amikokanisi+ na Nzambe.
19 Bongo, Yesu azongiselaki bango ete: “Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete: Mwana akoki kosala ata eloko moko te na likanisi na ye moko, kasi kaka oyo amonaka Tata azali kosala.+ Mpo makambo nyonso oyo Ye asalaka, makambo yango Mwana mpe asalaka kaka ndenge wana.
20 Mpo Tata alingaka Mwana+ mingi mpe alakisaka ye makambo nyonso oyo ye moko asalaka, mpe akolakisa ye makambo ya minene koleka oyo, mpo bókamwa.+
21 Mpo kaka ndenge Tata alamwisaka bakufi mpe azongisaka bango na bomoi,+ ndenge moko mpe Mwana azongisaka na bomoi baoyo ye alingi kozongisa.+
22 Mpo Tata azali kosambisa ata moto moko te, kasi apesi kosambisa nyonso na mabɔkɔ ya Mwana,+
23 mpo bato nyonso bákumisa Mwana+ ndenge bazali kokumisa Tata. Moto oyo azali kokumisa Mwana te azali mpe kokumisa Tata te oyo atindaki ye.+
24 Ya solosolo mpenza, nalobi na bino ete: Moto oyo azali koyoka liloba na ngai mpe azali kondima ye oyo atindaki ngai azali na bomoi ya seko,+ mpe akosambisama te kasi alongwe na liwa, akómi na bomoi.+
25 “Ya solosolo mpenza, nalobi na bino ete: Ngonga ezali koya, mpe ezali sikoyo, wana bakufi+ bakoyoka mongongo+ ya Mwana ya Nzambe mpe baoyo batye likebi, bakozala na bomoi.+
26 Mpo kaka ndenge Tata azali na bomoi na kati na ye moko,+ ndenge moko mpe apesi Mwana nzela ya kozala na bomoi na kati na ye moko.+
27 Mpe apesi ye bokonzi ya kosambisa,+ mpo azali Mwana ya moto.+
28 Bókamwa te mpo na yango, mpamba te ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita*+ bakoyoka mongongo na ye
29 mpe bakobima, baoyo basalaki makambo ya malamu bakobima mpo na lisekwa ya bomoi,+ baoyo bazalaki kosala makambo ya mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.+
30 Nakoki kosala ata eloko moko te na likanisi na ngai moko; kaka ndenge nazali koyoka, ndenge mpe nazali kosambisa; mpe kosambisa oyo nazali kosambisa ezali sembo,+ mpo nazali koluka, mokano na ngai moko te, kasi mokano+ ya moto oyo atindaki ngai.
31 “Soki ngai kaka nde nazali kopesa litatoli+ mpo na ngai moko, litatoli na ngai ezali solo te.+
32 Moto mosusu azali oyo azali kopesa litatoli mpo na ngai, mpe nayebi ete litatoli oyo azali kopesa+ mpo na ngai ezali solo.
33 Botindaki bato epai ya Yoane, mpe ye apesaki litatoli mpo na solo.+
34 Nzokande, nandimaka te litatoli oyo euti na moto, kasi nazali koloba makambo oyo mpo bóbikisama.+
35 Moto yango azalaki mwinda oyo ezali kopela mpe kongɛnga; mpe bondimaki kosepela mingi na pole na ye mpo na ntango moke.+
36 Kasi nazali na litatoli oyo eleki litatoli ya Yoane, mpo misala mpenza oyo Tata na ngai apesaki ngai nasala, misala wana mpenza oyo nazali kosala,+ ezali kopesa litatoli mpo na ngai ete Tata atindaki ngai.
37 Lisusu, Tata moto atindaki ngai ye moko apesi litatoli mpo na ngai.+ Boyoká mongongo na ye ata mbala moko te mpe bomoná te motindo na ye;+
38 mpe liloba na ye efandi na kati na bino te, mpo bozali kondima te moto oyo ye atindaki.
39 “Bozali kolukaluka na kati ya Makomami,+ mpo bozali kokanisa ete na nzela na yango bokozwa bomoi ya seko; mpe yango mpenza nde ezali kopesa litatoli mpo na ngai.+
40 Mpe atako bongo bolingi koya epai na ngai te mpo ete bózwa bomoi.+
41 Nandimaka nkembo oyo euti na bato te,+
42 kasi nayebi malamu ete bozali na bolingo ya Nzambe te na kati na bino.+
43 Nayei na nkombo ya Tata na ngai,+ kasi bozali koyamba ngai te; soki moto mosusu ayaki na nkombo na ye moko, mbɛlɛ boyambaki ye.
44 Ndenge nini bokoki kondima, wana bozali koyamba nkembo+ oyo bino na bino bozali kopesana mpe bozali koluka te nkembo oyo euti na Nzambe kaka moko?+
45 Bókanisa te ete nakofunda bino epai ya Tata; moto oyo azali kofunda bino nde Moize,+ oyo botyeli elikya.
46 Ya solo, soki bondimaki Moize bolingaki mpe kondima ngai, mpo ye akomaki makambo etali ngai.+
47 Kasi soki bozali kondima makomi na ye te,+ bokondima maloba na ngai ndenge nini?”
Maloba na nse
^ Lil., “malita ya kokanisama.”