Yoane 4:1-54

4  Nzokande, ntango Nkolo ayebaki ete Bafarisai bayokaki ete Yesu azali kokómisa bato bayekoli mpe kobatisa+ bango mingi koleka Yoane—  atako, ya solo, Yesu ye moko azalaki kobatisa te kasi bayekoli na ye nde bazalaki kobatisa—  alongwaki na Yudea mpe akendaki lisusu na Galile.  Kasi esengelaki na ye kokatisa Samaria.+  Na yango, akómaki na engumba moko ya Samaria ebengami Sikare pene ya elanga oyo Yakobo apesaki Yozefe mwana na ye.+  Kuna nde liziba ya Yakobo+ ezalaki. Nzokande Yesu, na kolɛmba oyo alɛmbaki na mobembo, afandaki na liziba yango kaka bongo. Ezalaki soki ngonga ya motoba.  Mwasi moko ya Samaria ayaki kotoka mai. Yesu alobaki na ye ete: “Pesá ngai mai ya komɛla.”  (Mpo bayekoli na ye bakendaki na engumba kosomba biloko ya kolya.)  Na yango, mwasi Mosamaria yango alobaki na ye ete: “Ndenge nini yo, atako ozali Moyuda, ozali kosɛnga ngai mai ya komɛla, nzokande ngai nazali mwasi Mosamaria?” (Mpo Bayuda bayokanaka na Basamaria te.)+ 10  Yesu azongiselaki ye ete: “Soki oyebaki likabo+ ya ofele ya Nzambe mpe nani+ oyo azali koloba na yo ete: ‘Pesá ngai mai ya komɛla,’ olingaki kosɛnga ye, mpe ye alingaki kopesa yo mai ya bomoi.”+ 11  Alobaki na ye ete: “Tata, ozali ata na katini ya kotoka mai te, mpe libulu ezali mozindo. Bongo ozwi mai yango ya bomoi wapi? 12  Oleki+ nde nkɔkɔ na biso Yakobo oyo apesaki biso libulu oyo mpe oyo amɛlaki mai na yango, ye ná bana na ye mpe bibwɛlɛ na ye?” 13  Yesu azongiselaki ye ete: “Moto nyonso oyo amɛli mai oyo akoyoka mposa ya mai lisusu. 14  Moto nyonso oyo akomɛla mai oyo ngai nakopesa ye akoyoka mposa ya mai ata moke lisusu te,+ kasi mai oyo nakopesa ye ekokóma na kati na ye liziba ya mai+ oyo ezali kopunzwapunzwa mpo na kopesa bomoi ya seko.”+ 15  Mwasi yango alobaki na ye ete: “Tata, pesá ngai mai yango, mpo nayoka mposa ya mai lisusu te mpe nayaka na esika oyo te mpo na kotoka mai.” 16  Alobaki na ye ete: “Kende, bengá mobali na yo mpe yaká na esika oyo.” 17  Mwasi yango azongisaki ete: “Nazali na mobali te.” Yesu alobaki na ye ete: “Olobi malamu ete: ‘Nazali na mobali te.’ 18  Mpo ozwá mibali mitano, mpe oyo ozali na ye sikoyo azali mobali na yo te. Oyo olobi ezali solo.” 19  Mwasi yango alobaki na ye ete: “Tata, namoni ete ozali mosakoli.+ 20  Bankɔkɔ na biso basambelaki na ngomba oyo;+ kasi bino bolobaka ete na Yerusaleme nde esika oyo bato basengeli kosambela.”+ 21  Yesu alobaki na ye ete: “Mwasi, ndimelá ngai: Ngonga ezali koya wana bato bakosambela+ Tata na ngomba oyo te na Yerusaleme mpe te.+ 22  Bino bosambelaka oyo boyebi te;+ biso tosambelaka oyo toyebi, mpamba te lobiko euti na Bayuda.+ 23  Kasi, ngonga ezali koya, mpe ezali sikoyo, wana basambeli ya solosolo bakosambela Tata na elimo+ mpe na solo,+ mpo, ya solo mpenza, Tata azali koluka bato ya ndenge wana mpo na kosambela ye.+ 24  Nzambe azali Elimo,+ mpe baoyo bazali kosambela ye basengeli kosambela na elimo mpe na solo.”+ 25  Mwasi yango alobaki na ye ete: “Nayebi ete Masiya+ azali koya, oyo abengami Kristo.+ Ntango akoya, akoyebisa biso makambo nyonso polele.” 26  Yesu alobaki na ye ete: “Ngai oyo nazali koloba na yo nde ye.”+ 27  Nzokande na ntango wana bayekoli na ye bayaki, mpe babandaki kokamwa mpo azalaki kosolola na mwasi. Kasi, moko te alobaki ete: “Ozali koluka nini?” to, “Mpo na nini ozali kosolola na ye?” 28  Bongo, mwasi yango atikaki elokó na ye mpe akendaki na engumba mpe ayebisaki bato ete: 29  “Bóya kotala moto moko oyo ayebisi ngai makambo nyonso nasalá. Mbala mosusu ye nde Kristo+ te?” 30  Babimaki na engumba mpe babandaki koya epai na ye. 31  Na ntango yango bayekoli bazalaki kobondela ye, balobi: “Rabi,+ lyá.” 32  Kasi alobaki na bango ete: “Nazali na biloko ya kolya oyo bino boyebi te.” 33  Bongo bayekoli babandaki kolobana bango na bango ete: “Moto moko amemeli ye nde eloko ya kolya?” 34  Yesu alobaki na bango ete: “Bilei+ na ngai nde kosala mokano+ ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.+ 35  Bozali koloba te ete etikali sanza minei mpo mosala ya kobuka mbuma ebanda? Talá! Nazali koloba na bino ete: Bótombola miso na bino mpe bótala bilanga, ndenge eteli mpo na bobuki mbuma.+ Libelalibela 36  mobuki-mbuma azali kozwa lifuti mpe azali koyanganisa mbuma mpo na bomoi ya seko,+ mpo moloni+ ná mobuki-mbuma básepela elongo.+ 37  Kutu, na likambo wana nde liloba oyo ezali solo ete: Moko azali moloni mpe mosusu mobuki-mbuma. 38  Natindaki bino bóbuka mbuma oyo bomonelaki mpasi te. Bamosusu bamonaki mpasi,+ mpe bino bozwi litomba ya mosala na bango ya makasi.” 39  Nzokande Basamaria mingi ya engumba wana bandimelaki+ ye mpo na liloba ya mwasi wana oyo atatolaki ete: “Ayebisaki ngai makambo nyonso oyo nasalá.”+ 40  Bongo ntango Basamaria bayaki epai na ye, babandaki kosɛnga ye ete afanda elongo na bango; mpe afandaki kuna mikolo mibale.+ 41  Na yango, bato mingi lisusu bandimaki mpo na oyo ye alobaki,+ 42  mpe babandaki koloba na mwasi yango ete: “Ezali lisusu te mpo na maloba na yo nde tozali kondima; mpo toyoki biso moko+ mpe toyebi ete moto oyo azali solo mpenza mobikisi+ ya mokili.” 43  Nsima ya mikolo mibale alongwaki wana mpo na kokende na Galile.+ 44  Nzokande, Yesu ye moko atatolaki ete mosakoli azalaka na lokumu te na mboka na ye moko.+ 45  Bongo ntango akómaki na Galile, Bagalile bayambaki ye, mpo bamonaki makambo nyonso oyo asalaki na Yerusaleme na fɛti,+ mpo bango mpe bakendaki na fɛti.+ 46  Bongo akómaki lisusu na Kana+ ya Galile, epai abongolaki mai vinyo.+ Nzokande, ezalaki na mosaleli moko ya mokonzi oyo mwana na ye azalaki na maladi na Kapernaume.+ 47  Ntango moto yango ayokaki ete Yesu alongwaki na Yudea mpe akómaki na Galile, akendaki epai na ye mpe abandaki kosɛnga ye akita kobikisa mwana na ye, mpo etikalaki moke akufa. 48  Nzokande, Yesu alobaki na ye ete: “Soki bomoni bilembo+ mpe makamwisi+ te, bokondima ata moke te.” 49  Mosaleli ya mokonzi alobaki na ye ete: “Nkolo, kitá liboso ete mwana na ngai ya moke akufa.” 50  Yesu alobaki na ye ete: “Kende na yo;+ mwana na yo azali na bomoi.”+ Moto yango andimaki liloba oyo Yesu alobaki na ye mpe akendaki. 51  Kasi ntango azalaki naino kokita na nzela baombo na ye bayaki kokutana na ye mpo na koloba ete mwana na ye ya mobali azali na bomoi.+ 52  Na yango, abandaki kotuna bango na ngonga nini akómaki malamu. Bongo balobaki na ye ete: “Lobi na ngonga ya nsambo fiɛvrɛ+ na ye esilaki.” 53  Bongo tata wana ayebaki ete ezalaki mpenza na ngonga wana+ nde Yesu alobaki na ye ete: “Mwana na yo azali na bomoi.” Mpe ye ná bato nyonso ya ndako na ye bandimaki.+ 54  Ya mbala oyo ezalaki elembo ya mibale+ oyo Yesu asalaki ntango alongwaki na Yudea mpe akómaki na Galile.

Maloba na nse