Yoane 20:1-31

20  Na mokolo ya liboso+ ya pɔsɔ, Maria Magadalena ayaki ntɔngɔntɔngɔ na lilita, wana molili ezalaki naino, mpe amonaki libanga esili kolongolama na lilita.+  Bongo apotaki mbangu mpe ayaki epai ya Simo Petro mpe epai ya moyekoli wana mosusu,+ oyo Yesu azalaki kolinga mingi, mpe alobaki na bango ete: “Balongoli Nkolo na lilita,+ mpe toyebi te soki balalisi ye wapi.”  Bongo Petro+ ná moyekoli wana mosusu babimaki mpe basimbaki nzela bakei na lilita yango.  Ɛɛ, bango mibale elongo babandaki kopota mbangu; kasi moyekoli wana mosusu alekaki liboso ya Petro na mbangu makasi koleka mpe akómaki na lilita liboso.  Mpe, ntango agunzamaki, amonaki biteni ya bilamba elali,+ kasi akɔtaki na kati te.  Bongo Simo Petro mpe ayaki nsima na ye, mpe akɔtaki na kati ya lilita yango. Mpe amonaki biteni ya bilamba yango elali,+  mpe lisusu elamba oyo ezalaki na motó na ye elali esika moko te na biteni ya bilamba yango, kasi elíngami na esika na yango moko.  Bongo, na ntango wana, moyekoli wana mosusu oyo akómaki na lilita liboso akɔtaki mpe na kati, mpe amonaki mpe andimaki.  Mpo basosolaki naino te likomami oyo: ete asengelaki kosekwa uta na bakufi.+ 10  Bongo bayekoli yango bazongaki epai na bango. 11  Nzokande, Maria azalaki kaka kotɛlɛma libándá pene na lilita yango, azalaki kolela. Bongo wana azalaki kolela, agunzamaki mpo na kotala na kati ya lilita 12  mpe amonaki baanzelu+ mibale na bilamba ya mpɛmbɛ bafandi moko na motó mpe moko na makolo na esika oyo nzoto ya Yesu elalaki. 13  Mpe balobaki na ye ete: “Mwasi, ozali kolela mpo na nini?” Alobaki na bango ete: “Balongoli Nkolo na ngai, mpe nayebi te soki balalisi ye wapi.” 14  Nsima ya koloba makambo wana, abalukaki mpe amonaki Yesu atɛlɛmi, kasi asosolaki te ete ezalaki Yesu.+ 15  Yesu alobaki na ye ete: “Mwasi, ozali kolela mpo na nini? Ozali koluka nani?”+ Ye, lokola akanisaki ete ezali mobateli ya elanga, alobaki na ye ete: “Tata, soki olongolaki ye, yebisá ngai soki olalisi ye wapi, mpe nakokamata ye.” 16  Yesu alobaki na ye ete: “Maria!”+ Ntango abalukaki, alobaki na ye na Ebre ete: “Rabuni!”+ (oyo elakisi “Moteyi!”) 17  Yesu alobaki na ye ete: “Tiká kokangama na ngai. Mpo namati naino epai ya Tata te. Kasi kende epai ya bandeko na ngai+ mpe lobá na bango ete: ‘Nazali komata epai ya Tata+ na ngai mpe Tata na bino mpe epai ya Nzambe na ngai+ mpe Nzambe na bino.’”+ 18  Maria Magadalena ayaki kopesa nsango epai ya bayekoli ete: “Namoni Nkolo!” mpe ete alobaki na ye makambo wana.+ 19  Bongo, ntango ngonga epusanaki mingi na mokolo yango, na mokolo ya liboso ya pɔsɔ,+ mpe, atako baporte ekangamaki makasi na esika oyo bayekoli bazalaki mpo na kobanga+ Bayuda, Yesu ayaki+ mpe atɛlɛmaki na katikati na bango mpe alobaki na bango ete: “Kimya ezala na bino.”+ 20  Mpe nsima ya koloba bongo alakisaki bango mabɔkɔ na ye mpe mopanzi na ye.+ Na yango, bayekoli basepelaki+ ntango bamonaki Nkolo. 21  Bongo, Yesu alobaki na bango lisusu ete: “Kimya ezala na bino. Kaka ndenge Tata atindi ngai,+ ngai mpe nazali kotinda bino.”+ 22  Mpe nsima ya koloba bongo afulaki bango mpema mpe alobaki na bango ete: “Bózwa elimo santu.+ 23  Soki bolimbisi masumu ya bato ata ya ndenge nini,+ balimbisami yango; soki bokangi oyo ya bato ata ya ndenge nini, ekangami.”+ 24  Kasi Toma,+ moko ya bantoma zomi na mibale, oyo bazalaki kobenga Lipasa, azalaki elongo na bango te ntango Yesu ayaki. 25  Na yango bayekoli mosusu balobaki na ye ete: “Tomoni Nkolo!” Kasi ye alobaki na bango ete: “Soki namoni elembo ya nsɛtɛ na mabɔkɔ na ye te mpe soki natye mosapi na ngai na elembo ya nsɛtɛ yango te mpe soki natye lobɔkɔ na ngai na kati ya mopanzi na ye+ te, nakondima ata moke te.”+ 26  Nzokande, mikolo mwambe na nsima bayekoli na ye bazalaki lisusu na kati ya ndako, mpe Toma azalaki elongo na bango. Yesu ayaki, atako baporte ekangamaki makasi, mpe atɛlɛmaki na katikati na bango mpe alobaki ete: “Kimya ezala na bino.”+ 27  Na nsima alobaki na Toma ete: “Tyá mosapi na yo awa, mpe talá mabɔkɔ na ngai, mpe kamatá lobɔkɔ+ na yo mpe tyá yango na kati ya mopanzi na ngai, tiká ntembe, kasi zalá nde na kondima.” 28  Toma azongiselaki ye ete: “Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai!”+ 29  Yesu alobaki na ye: “Ondimi mpo omoni ngai? Esengo na baoyo bazali komona te kasi bazali kondima.”+ 30  Ya solo mpenza, Yesu asalaki mpe bilembo mosusu mingi liboso ya bayekoli, oyo ekomami na rulo oyo te.+ 31  Kasi makambo oyo ekomami+ mpo bóndima ete Yesu azali Kristo Mwana ya Nzambe, mpe ete, mpo bozali kondima,+ bózwa bomoi na nkombo na ye.

Maloba na nse