Yoane 2:1-25

2  Nzokande na mokolo ya misato fɛti moko ya libala esalemaki na Kana+ ya Galile, mpe mama+ ya Yesu azalaki kuna.  Yesu ná bayekoli na ye babengamaki mpe na fɛti yango ya libala.  Ntango vinyo ezangaki, mama+ ya Yesu alobaki na ye ete: “Bazali na vinyo te.”  Kasi Yesu alobaki na ye ete: “Mwasi,+ ngai na yo likambo nini? Ngonga na ngai ekoki naino te.”+  Mama na ye alobaki na baoyo bazalaki kosala misala ete: “Oyo nyonso akoyebisa bino, bósala.”+  Nzokande, bilokó motoba ya mabanga efandaki wana, mpo na kopɛtolama+ oyo mibeko ya Bayuda ezalaki kosɛnga, mokomoko ekokaki kokɔta bimekeli* mibale to misato.  Yesu alobaki na bango ete: “Bótondisa bilokó wana na mai.” Mpe batondisaki yango mɛkɛ.  Mpe alobaki na bango ete: “Bótoka mwa ndambo sikoyo mpe bómemela yango mokambi ya fɛti.” Bongo bamemaki yango.  Nzokande, ntango mokambi ya fɛti amekaki mai oyo ebongwanaki vinyo+—kasi ayebaki te epai yango eutaki, nzokande bato oyo bazalaki kosala misala bayebaki, baoyo batokaki mai yango—, mokambi ya fɛti abengaki mobali ya libala 10  mpe alobaki na ye ete: “Moto nyonso abimisaka vinyo oyo eleki malamu liboso,+ mpe ntango bato balangwe, oyo ya malamu mingi te. Yo obombi vinyo oyo eleki kitoko tii sikoyo.” 11  Yesu asalaki yango na Kana ya Galile lokola ebandeli ya bilembo na ye, mpe amonisaki nkembo na ye+ polele; mpe bayekoli na ye bandimelaki ye. 12  Nsima na yango, ye, mama na ye, bandeko na ye+ ná bayekoli na ye bakitaki na Kapernaume,+ kasi bafandaki kuna mikolo mingi te. 13  Nzokande elekeli+ ya Bayuda ekómaki pene, mpe Yesu amataki na Yerusaleme.+ 14  Mpe na tempelo akutaki baoyo bazalaki kotɛka bangɔmbɛ ná bampate ná bibenga+ mpe bato oyo basenzaka mbongo, bafandi na bakiti na bango. 15  Bongo nsima ya kosala fimbo ya bansinga, abenganaki na tempelo bato nyonso wana ná bampate ná bangɔmbɛ na bango, mpe asopaki mbongo ya bibende ya bato oyo basenzaka mbongo mpe abalolaki bamesa na bango.+ 16  Mpe alobaki na baoyo bazalaki kotɛka bibenga ete: “Bólongola biloko oyo awa! Bótika kokómisa ndako+ ya Tata na ngai ndako ya mombongo!”+ 17  Bayekoli na ye bakanisaki likambo oyo ekomamá ete: “Molende mpo na ndako na yo ekolya ngai.”+ 18  Bongo Bayuda bazongiselaki ye ete: “Elembo+ nini okolakisa biso, awa ozali kosala makambo oyo?” 19  Yesu azongiselaki bango ete: “Bóbuka tempelo oyo,+ mpe na mikolo misato nakotɛlɛmisa yango.” 20  Bongo Bayuda balobaki ete: “Tempelo oyo etongamaki mbula ntuku minei na motoba (46), mpe yo okotɛlɛmisa yango na mikolo misato?” 21  Kasi azalaki nde kolobela tempelo+ ya nzoto na ye. 22  Kasi, ntango alamukaki uta na bakufi, bayekoli na ye bamikundolaki+ ete azalaki koloba bongo; mpe bandimelaki Likomami mpe liloba oyo Yesu alobaki. 23  Nzokande, ntango azalaki na Yerusaleme na elekeli, na fɛti na yango,+ bato mingi bandimaki nkombo na ye,+ ndenge bazalaki komona bilembo oyo azalaki kosala.+ 24  Kasi Yesu, ye, azalaki kotyela bango motema te+ mpo ayebaki bango nyonso 25  mpe mpo azalaki na mposa te ete moto moko boye apesa litatoli mpo na moto, mpo ye moko ayebaki eloko nini ezali na kati ya moto.+

Maloba na nse

“Emekeli oyo ekoki kozala bati, oyo ekokani na balitre 22.”