Yoane 19:1-42
19 Bongo na ntango yango, Pilate akamataki Yesu mpe abɛtaki ye fimbo.+
2 Mpe basoda batongaki motole ya nzubɛ mpe balatisaki ye yango na motó mpe balatisaki ye elamba ya likoló ya motane-bulé;+
3 mpe babandaki koya epai na ye mpe koloba ete: “Mbote, yo Mokonzi ya Bayuda!” Bazalaki mpe kobɛta ye bambata na elongi.+
4 Mpe Pilate abimaki lisusu libándá mpe alobaki na bango ete: “Talá! Namemi ye epai na bino na libándá mpo bóyeba ete nazwi ye ata na mabe moko te.”+
5 Na yango Yesu abimaki libándá, alati motole ya nzubɛ mpe elamba ya likoló ya motane-bulé. Mpe alobaki na bango ete: “Talá! Moto!”
6 Nzokande, ntango banganga-nzambe bakonzi mpe bapolisi bamonaki ye, bagangaki ete: “Baká ye na nzete! Baká ye na nzete!”+ Pilate alobaki na bango ete: “Bókamata ye bino moko mpe bóbaka ye na nzete, mpo nazwi ye ata na mabe moko te.”+
7 Bayuda bayanolaki ye ete: “Tozali na mobeko moko,+ mpe na kolanda mobeko yango asengeli kokufa, mpo amikómisi mwana ya Nzambe.”+
8 Na yango, ntango Pilate ayokaki liloba wana, akómaki kobanga mingi koleka;
9 mpe akɔtaki lisusu na ndako ya guvɛrnɛrɛ mpe alobaki na Yesu ete: “Yo ozali moto ya wapi?” Kasi Yesu apesaki ye eyano te.+
10 Bongo Pilate alobaki na ye ete: “Ozali koloba na ngai te?+ Oyebi te ete nazali na bokonzi ya kobimisa yo mpe nazali na bokonzi ya kobaka yo na nzete?”
11 Yesu ayanolaki ye ete: “Olingaki kozala na bokonzi likoló na ngai ata moke te soki yango epesamaki epai na yo te uta na likoló.+ Yango wana moto oyo akabi ngai epai na yo azali na lisumu oyo eleki monene.”
12 Mpo na yango, Pilate azalaki kaka koluka ndenge ya kobimisa ye. Kasi Bayuda bagangaki ete: “Soki obimisi moto oyo, ozali moninga ya Kaisala te. Moto nyonso oyo amikómisi mokonzi azali kotɛmɛla Kaisala.”+
13 Na yango Pilate, nsima ya koyoka maloba wana, amemaki Yesu na libándá, mpe afandaki na kiti ya kosambisa na esika ebengami Pavema ya Mabanga, kasi, na Ebre, Gabata.
14 Nzokande ezalaki ntango ya bolɛngɛli+ elekeli; ezalaki soki ngonga ya motoba. Mpe alobaki na Bayuda ete: “Talá! Mokonzi na bino!”
15 Nzokande, bagangaki ete: “Longolá ye! Longolá ye! Baká ye na nzete!” Pilate alobaki na bango ete: “Nabaka nde mokonzi na bino na nzete?” Banganga-nzambe bakonzi bayanolaki ete: “Tozali na mokonzi mosusu te kaka Kaisala.”+
16 Bongo na ntango yango, akabaki ye epai na bango mpo ete abakama na nzete.+
Bongo bakamataki Yesu.
17 Mpe, wana amemaki ye moko nzete ya mpasi,+ abimaki akei+ na esika oyo babengi Esika ya Mokuwa ya Motó, oyo ebengami Golgota na Ebre;+
18 mpe kuna babakaki ye na nzete,+ mpe bato mosusu mibale elongo na ye, moko epai mpe moko epai, kasi Yesu na katikati.+
19 Pilate akomaki mpe likomi moko mpe atyaki yango likoló ya nzete wana ya mpasi. Ekomamaki ete: “Yesu Monazarete Mokonzi ya Bayuda.”+
20 Bongo Bayuda mingi batángaki likomi yango, mpo esika oyo Yesu abakamaki na nzete ezalaki pene ya engumba;+ mpe ekomamaki na Ebre, na Latini, mpe na Grɛki.
21 Nzokande, banganga-nzambe bakonzi ya Bayuda babandaki koloba na Pilate ete: “Kokoma te ete: ‘Mokonzi ya Bayuda,’ kasi nde azalaki koloba ete: ‘Nazali Mokonzi ya Bayuda.’”
22 Pilate ayanolaki ete: “Oyo nakomi, nakomi.”
23 Nzokande, nsima ya kobaka Yesu na nzete, basoda bakamataki bilamba na ye ya likoló mpe bakabolaki yango na ndambo minei, ndambo moko mpo na soda mokomoko, mpe elamba ya kati. Kasi elamba yango ya kati etongamaki na biteni te, elitamá mobimba banda na likoló tii na nse.+
24 Bongo balobanaki bango na bango ete: “Tópasola yango te, kasi tóbɛta mbɛsɛ mpo na koyeba soki ekozala ya nani.” Esalemaki bongo mpo likomami oyo ekokisama ete: “Bamikabolelaki bilamba na ngai ya likoló, mpe babwakelaki elamba na ngai mbɛsɛ.”+ Mpe makambo wana, basoda basalaki mpenza yango.
25 Nzokande, pene ya nzete ya mpasi ya Yesu, mama+ na ye mpe ndeko mwasi ya mama na ye batɛlɛmaki wana; ná Maria+ mwasi ya Klopasi, mpe Maria Magadalena.+
26 Bongo Yesu, ntango amonaki mama na ye mpe moyekoli oyo ye alingaki mingi+ batɛlɛmi wana, alobaki na mama na ye ete: “Mwasi, talá! Mwana na yo!”
27 Na nsima alobaki na moyekoli yango ete: “Talá! Mama na yo!” Mpe banda na ngonga wana moyekoli yango azwaki ye na ndako na ye.
28 Nsima na yango, ntango Yesu ayebaki ete sikoyo makambo nyonso ekokisami, mpo likomami ekoka kokokisama, alobaki ete: “Nazali na mposa ya mai.”+
29 Mbɛki moko ezalaki wana etondi na vinyo ya ngayi. Na yango, batyaki linyuka oyo etondi na vinyo yango ya ngayi na nzete ya izope mpe bamemaki yango na monɔkɔ na ye.+
30 Nzokande, nsima ya kozwa vinyo yango ya ngayi, Yesu alobaki ete: “Ekokisami!”+ mpe, agumbaki motó na ye, akataki mpema.*+
31 Bongo Bayuda, lokola ezalaki ntango ya Bolɛngɛli,+ mpo bibembe ekoka te kotikala+ likoló ya banzete wana ya mpasi na Sabata, (mpo mokolo yango ya Sabata ezalaki ya monene,)+ basɛngaki Pilate atinda bábuka bango makolo mpe bálongola bibembe.
32 Bongo basoda bayaki mpe babukaki makolo ya moto ya liboso, mpe ya moto mosusu wana, oyo abakamaki na nzete elongo na ye.
33 Kasi ntango bakómaki epai ya Yesu, lokola bamonaki ete asilaki kokufa, babukaki makolo na ye te.
34 Atako bongo moko ya basoda atɔbɔlaki ye mopanzi na likɔnga,+ mpe na mbala moko makila ná mai ebimaki.
35 Mpe moto oyo amonaki yango apesi litatoli, mpe litatoli na ye ezali ya solo, mpe moto yango ayebi ete azali koloba makambo ya solo, mpo bino mpe bóndima.+
36 Ya solo, makambo wana esalemaki mpo likomami oyo ekokisama ete: “Ata mokuwa na ye moko te ekobukama.”+
37 Mpe lisusu, likomami mosusu elobi ete: “Bakotala epai ya Moto oyo batɔbɔlaki.”+
38 Nzokande nsima ya makambo yango Yozefe ya Arimatea, oyo azalaki moyekoli ya Yesu kasi na kobombana mpo azalaki kobanga Bayuda,+ asɛngaki Pilate akoka kolongola nzoto ya Yesu; mpe Pilate apesaki ye nzela.+ Na yango ayaki kolongola nzoto na ye.+
39 Lisusu Nikodeme, moto oyo liboso ayaki epai na ye na butu, ayaki amemi rulo ya mire mpe aloe, ya litra soki nkama moko (100).+
40 Bongo bakamataki nzoto ya Yesu mpe bazingaki yango na biteni ya bilamba esika moko na matiti ya nsolo kitoko,+ kaka ndenge Bayuda bazalaki na momeseno ya kobongisa ndenge ya kokunda bato.
41 Nzokande, na esika oyo abakamaki na nzete elanga moko ezalaki wana, mpe na kati ya elanga yango ezalaki na lilita moko ya sika,+ oyo na kati na yango moto alalisamá naino te.
42 Kuna nde, mpo na bolɛngɛli+ ya Bayuda, balalisaki Yesu, mpo lilita yango ezalaki penepene.
Maloba na nse
^ Lil., “apesaki elimo.”