Yoane 18:1-40
18 Ntango asilisaki koloba makambo wana, Yesu abimaki elongo na bayekoli na ye mpe bakatisaki bakei na ngámbo mosusu ya mokɛli ya eleko ya malili ya Kidrone,+ epai elanga moko ezalaki, mpe ye ná bayekoli na ye bakɔtaki kuna.+
2 Nzokande Yudasi, motɛki na ye, ayebaki mpe esika yango, mpo Yesu azalaki mbala mingi koyangana kuna elongo na bayekoli na ye.+
3 Na yango, Yudasi akamataki etuluku ya basoda mpe bapolisi ya banganga-nzambe bakonzi mpe ya Bafarisai mpe ayaki kuna ná bisungi ya mɔtɔ ná miinda mpe bibundeli.+
4 Na yango, lokola Yesu ayebaki makambo nyonso oyo ezalaki koyela ye,+ abimaki mpe alobaki na bango ete: “Bozali koluka nani?”
5 Bayanolaki ye ete: “Yesu Monazarete.”+ Alobaki na bango ete: “Ngai nazali ye.” Nzokande Yudasi, motɛki na ye,+ atɛlɛmaki mpe elongo na bango.
6 Nzokande, ntango alobaki na bango ete: “Ngai nazali ye,” bazongaki nsima+ mpe bakweaki na nse.
7 Bongo atunaki bango lisusu ete: “Bozali koluka nani?” Balobaki ete: “Yesu Monazarete.”
8 Yesu ayanolaki ete: “Nayebisaki bino ngai nazali ye. Na yango, soki ezali ngai nde bozali koluka, bótika baoyo bákende”;
9 mpo liloba ekokisama oyo alobaki ete: “Na baoyo yo opesi ngai, nabungisi ata moko te.”+
10 Bongo Simo Petro, lokola azalaki na mopanga, abimisaki yango mpe abɛtaki moombo ya nganga-nzambe monene mpe akataki ye litoi ya mobali.+ Nkombo ya moombo yango Malakusi.
11 Nzokande, Yesu alobaki na Petro ete: “Kɔtisá mopanga na libenga na yango.+ Kɔpɔ oyo Tata apesi ngai, nasengeli komɛla+ yango te?”
12 Bongo etuluku ya basoda ná komanda ya basoda ná bapolisi ya Bayuda bakangaki Yesu mpe batyaki ye minyɔlɔlɔ,
13 mpe bamemaki ye liboso epai ya Anasi; mpo azalaki bokilo ya Kaifa, oyo azalaki nganga-nzambe monene na mbula wana.+
14 Kaifa nde moto oyo apesaki Bayuda toli ete ezali mpo na litomba na bango moto moko akufa mpo na bato.+
15 Nzokande Simo Petro azalaki kolanda Yesu, ye ná moyekoli mosusu.+ Moyekoli yango ayebanaki na nganga-nzambe monene, mpe akɔtaki elongo na Yesu na lopango ya nganga-nzambe monene,
16 kasi Petro atɛlɛmaki libándá na porte.+ Bongo moyekoli wana mosusu, oyo ayebanaki na nganga-nzambe monene, abimaki mpe asololaki na mokɛngɛli ya porte mpe akɔtisaki Petro.
17 Bongo, mwana mwasi ya mosala, mokɛngɛli wana ya porte, alobaki na Petro ete: “Yo mpe ozali moko ya bayekoli ya moto wana, boye te?” Ye alobaki ete: “Ngai te.”+
18 Nzokande baombo mpe bapolisi batɛlɛmaki wana, bapelisaki mɔtɔ ya makala,+ mpamba te malili ezalaki, mpe bazalaki koyɔta mɔtɔ. Petro mpe atɛlɛmaki wana elongo na bango mpe azalaki koyɔta mɔtɔ.
19 Bongo nganga-nzambe mokonzi atunaki Yesu mpo na bayekoli na ye mpe mpo na mateya na ye.
20 Yesu ayanolaki ye ete: “Nalobaki na mokili polele. Nazalaki ntango nyonso koteya na basinagoga mpe na tempelo,+ epai Bayuda nyonso bayanganaka; mpe nalobaki ata likambo moko te na kobombana.
21 Mpo na nini ozali kotuna ngai? Tuná baoyo bayokaki makambo oyo nalobaki na bango. Talá! Bango bayebi makambo oyo nalobaki.”
22 Nsima ya koloba makambo wana, moko ya bapolisi oyo atɛlɛmaki wana abɛtaki Yesu mbata+ na elongi mpe alobaki ete: “Ndenge wana nde ozali koyanola nganga-nzambe mokonzi?”
23 Yesu ayanolaki ye ete: “Soki nalobi mabe, monisá mabe yango; kasi soki nalobi malamu, mpo na nini obɛti ngai?”
24 Bongo Anasi atindaki ye na minyɔlɔlɔ epai ya Kaifa nganga-nzambe monene.+
25 Nzokande Simo Petro atɛlɛmaki wana mpe azalaki koyɔta mɔtɔ. Bongo balobaki na ye ete: “Yo mpe ozali moko ya bayekoli na ye, boye te?” Awanganaki mpe alobaki ete: “Ngai te.”+
26 Moko ya baombo ya nganga-nzambe monene, oyo azalaki moto ya libota ya moto oyo Petro akataki litoi,+ alobaki ete: “Namonaki yo na elanga elongo na ye, boye te?”
27 Kasi, Petro awanganaki lisusu; mpe na mbala moko nsoso elelaki.+
28 Bongo balongolaki Yesu epai ya Kaifa, bakendaki na ye na ndako ya guvɛrnɛrɛ.+ Ezalaki bongo na ntɔngɔntɔngɔ. Kasi bango moko bakɔtaki na ndako ya guvɛrnɛrɛ te, mpo bákóma mbindo te+ mpe bongo bákoka kolya elekeli.
29 Na yango, Pilate abimaki libándá epai na bango mpe alobaki ete: “Bozali kofunda moto oyo na likambo nini?”+
30 Bazongiselaki ye ete: “Soki moto oyo azalaki mosali-mabe te, mbɛlɛ tokabi ye epai na yo te.”
31 Bongo Pilate alobaki na bango ete: “Bókamata ye bino moko mpe bósambisa ye na kolanda mibeko na bino.”+ Bayuda balobaki na ye ete: “Topesami nzela ya koboma moto te.”+
32 Nyonso wana, mpo liloba ya Yesu ekokisama oyo alobaki mpo na kolakisa liwa ya ndenge nini asengelaki kokufa.+
33 Bongo Pilate akɔtaki lisusu na ndako ya guvɛrnɛrɛ mpe abengaki Yesu mpe alobaki na ye ete: “Yo ozali mokonzi ya Bayuda?”+
34 Yesu ayanolaki ete: “Ezali yo moko nde olobi bongo, to bato mosusu nde bayebisi yo yango mpo na ngai?”+
35 Pilate ayanolaki ete: “Ngai nazali Moyuda te, boye te? Ekólo na yo moko mpe banganga-nzambe bakonzi bakabi yo epai na ngai.+ Osali nini?”
36 Yesu ayanolaki ete:+ “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.+ Soki bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbɛlɛ basaleli na ngai babundi+ mpo nakabama epai ya Bayuda te. Kasi nde bokonzi na ngai euti awa te.”
37 Na yango, Pilate alobaki na ye ete: “Boye, ozali mokonzi?” Yesu ayanolaki ete: “Yo moko olobi ete nazali mokonzi.+ Ezali mpo na yango nde nabotamaki, mpe ezali mpo na yango nde nayei na mokili, mpo napesa litatoli na ntina na solo.+ Moto nyonso oyo azali na ngámbo ya solo+ ayokaka mongongo na ngai.”+
38 Pilate alobaki na ye ete: “Solo ezali nini?”
Mpe nsima ya koloba bongo, abimaki lisusu epai ya Bayuda mpe alobaki na bango ete: “Nazwi ye ata na mabe moko te.+
39 Lisusu, bozalaka na momeseno ete nabimisela bino moto moko na elekeli.+ Na yango, bolingi nabimisela bino mokonzi ya Bayuda?”
40 Bongo bagangaki lisusu ete: “Moto oyo te, kasi Barabasi!” Nzokande, Barabasi azalaki moyibi.+