Yoane 17:1-26
17 Yesu alobaki makambo wana, mpe, ntango atombolaki miso na ye na likoló,+ alobaki ete: “Tata, ngonga ekoki; pesá mwana na yo nkembo, mpo mwana na yo apesa yo nkembo,+
2 na ndenge opesi ye bokonzi likoló ya moto nyonso ya mosuni,+ mpo, bango nyonso oyo opesi ye,+ apesa bango bomoi ya seko.+
3 Oyo elakisi bomoi ya seko,+ báyekola koyeba+ yo, Nzambe ya solo kaka moko,+ mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.+
4 Napesi yo nkembo+ na mabele, mpo nasilisi mosala oyo opesaki ngai nasala.+
5 Bongo sikoyo yo, Tata, pesá ngai nkembo pembeni na yo moko na nkembo oyo nazalaki na yango pembeni na yo liboso ete mokili ezala.+
6 “Namonisi nkombo na yo polele na bato oyo ozwi na mokili mpe opesi ngai.+ Bazalaki ya yo, mpe opesi ngai bango, mpe batosi liloba na yo.
7 Bayebi sikoyo ete makambo nyonso oyo opesi ngai euti na yo;
8 mpo maloba oyo opesi ngai, napesi bango yango,+ mpe bayambi yango mpe bayebi mpenza ete nabimaki lokola momonisi na yo,+ mpe bandimi ete otindaki ngai.+
9 Nazali kosɛngɛla bango; nazali kosɛngɛla mokili te,+ kasi baoyo opesi ngai; mpo bazali ya yo,
10 mpe biloko na ngai nyonso ezali ya yo mpe ya yo ezali ya ngai,+ mpe nazwi nkembo na kati na bango.
11 “Mpe ngai nazali lisusu na mokili te, kasi bango bazali na mokili+ mpe ngai nazali koya epai na yo. Tata mosantu, kɛngɛlá bango+ mpo na nkombo na yo oyo opesi ngai, mpo bázala moko ndenge biso mpe tozali.+
12 Ntango nazalaki elongo na bango, nazalaki kokɛngɛla bango+ mpo na nkombo na yo mpenza oyo opesi ngai; mpe nabatelaki bango, mpe moko te na kati na bango abebaki,+ longola kaka mwana ya libebi,+ mpo likomami ekokisama.+
13 Kasi sikoyo nazali koya epai na yo, mpe nazali koloba makambo wana na mokili mpo bango bátonda na esengo na ngai mɛkɛ.+
14 Napesi bango liloba na yo, kasi mokili eyini+ bango, mpo bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.+
15 “Nazali kosɛnga yo, olongola bango na mokili te, kasi okɛngɛla nde bango mpo na moto mabe.+
16 Bazali bato ya mokili te,+ ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.+
17 Santisá+ bango na solo; liloba+ na yo ezali solo.+
18 Kaka ndenge otindaki ngai na kati ya mokili, ngai mpe natindi bango na kati ya mokili.+
19 Mpe nazali komisantisa mpo na bango, mpo bango mpe básantisama+ na solo.
20 “Nazali kosɛngɛla kaka bango te, kasi mpe baoyo bazali kondimela ngai na nzela ya liloba na bango;+
21 mpo bango nyonso bázala moko,+ ndenge yo, Tata, ozali na bomoko elongo na ngai mpe ngai nazali na bomoko elongo na yo,+ mpo bango mpe bázala na bomoko elongo na biso,+ mpo mokili endima ete otindaki ngai.+
22 Lisusu, napesi bango nkembo oyo opesi ngai, mpo bango mpe bázala moko ndenge biso tozali moko.+
23 Ngai na bomoko elongo na bango mpe yo na bomoko elongo na ngai, mpo bázala mpenza na bomoko ya solosolo,+ mpo mokili eyeba ete otindaki ngai mpe olingaki bango ndenge olingaki ngai.
24 Tata, mpo na oyo opesi ngai, nalingi ete, epai nazali, bango mpe bázala esika moko na ngai,+ mpo bámona nkembo na ngai oyo opesi ngai, mpo olingaki ngai liboso ya ebandeli+ ya mokili.+
25 Tata moyengebene,+ ya solo mokili eyebi yo te;+ kasi ngai nayebi yo, mpe bango bayebi ete otindaki ngai.+
26 Mpe nayebisi bango nkombo na yo+ mpe nakoyebisa yango, mpo bolingo oyo olingaki ngai na yango ezala na kati na bango mpe ngai na bomoko elongo na bango.”+