Yoane 16:1-33
16 “Nalobi na bino makambo oyo mpo bóbɛta libaku te.+
2 Bakobengana bino na sinagoga.+ Kutu, ngonga ezali koya wana moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete asaleli Nzambe mosala mosantu.+
3 Kasi bakosala makambo wana mpo bayebi Tata te bayebi mpe ngai te.+
4 Nzokande, nalobi na bino makambo yango mpo, na ntango ngonga na yango ekoya, bómikundola ete nayebisaki bino yango.+
“Nzokande, nayebisaki bino makambo wana liboso te, mpo nazalaki elongo na bino.
5 Kasi sikoyo nazali kokende epai ya moto oyo atindaki ngai,+ mpe atako bongo moko te na kati na bino atuni ngai ete: ‘Ozali kokende wapi?’
6 Kasi mpo nalobi na bino makambo oyo, mawa+ etondi na mitema na bino.
7 Nzokande, nazali koyebisa bino solo ete: Ezali mpo na litomba na bino nde nazali kokende. Mpo soki nakei te, mosungi+ akoya epai na bino soki moke te; kasi soki nakei, nakotindela bino ye.
8 Mpe ntango ye akoya, akopesa mokili elembo ya kondimisa mpenza na ntina na lisumu mpe na ntina na boyengebene mpe na ntina na lisambisi:+
9 libosoliboso, na ntina na lisumu,+ mpo bazali kondimela ngai te;+
10 na nsima, na ntina na boyengebene,+ mpo nazali kokende epai ya Tata mpe bokomona ngai lisusu te;
11 mpe na nsuka na ntina na lisambisi,+ mpo mokonzi ya mokili oyo asambisami.+
12 “Nazali naino na makambo mingi ya koloba na bino, kasi bokoki komema yango sikoyo te.+
13 Nzokande, ntango ye akoya, elimo yango ya solo,+ akokamba bino na kati ya solo nyonso, mpo akoloba na ndenge na ye moko te, kasi makambo oyo ye ayoki nde akoloba, mpe akosakola epai na bino makambo ezali koya.+
14 Ye akopesa ngai nkembo,+ mpo akozwa na eloko oyo ezali ya ngai mpe akosakwela bino yango.+
15 Biloko nyonso oyo Tata azali na yango ezali ya ngai.+ Yango wana nalobaki ete azali kozwa na kati ya eloko oyo ezali ya ngai mpe azali kosakola yango epai na bino.
16 Etikali moke bokomona ngai lisusu te,+ mpe etikali moke lisusu bokomona ngai.”
17 Bongo bayekoli na ye mosusu balobanaki bango na bango ete: “Elakisi nini makambo oyo azali koloba na biso ete: ‘Etikali moke bokomona ngai lisusu te, mpe etikali moke lisusu bokomona ngai,’ mpe, ‘mpo nazali kokende epai ya Tata’?”
18 Bongo bazalaki koloba ete: “Likambo oyo alobi ete: ‘etikali moke’ elakisi nini? Toyebi te nini azali koloba.”
19 Yesu ayebaki+ ete balingaki kotuna ye motuna, bongo alobaki na bango ete: “Bozali nde koluka koyeba na kati na bino likambo oyo, mpo nalobi ete: Etikali moke bokomona ngai lisusu te, mpe etikali moke lisusu bokomona ngai?
20 Ya solosolo mpenza, nalobi na bino ete: Bokolela mpe bokoganga na kolela, kasi mokili ekosepela; bokoyoka mawa,+ kasi mawa na bino ekobongwana esengo.+
21 Mwasi, ntango azali kobota, azalaka na mawa, mpamba te ngonga na ye ekoki;+ kasi ntango aboti mwana na ye, amikundolaka bolɔzi yango lisusu te mpo na esengo oyo ete moto abotami na mokili.
22 Na yango, bino mpe, ya solo, bozali sikoyo koyoka mawa; kasi nakomona bino lisusu mpe mitema na bino ekosepela,+ mpe esengo na bino, moto akolongola bino yango te.
23 Mpe na mokolo yango+ bokotuna ngai ata motuna moko te. Ya solosolo mpenza, nalobi na bino ete: Soki bosɛngi Tata eloko+ akopesa bino yango na nkombo na ngai.+
24 Tii sikoyo naino bosɛngi ata eloko moko te na nkombo na ngai. Bósɛnga mpe bokozwa, mpo esengo na bino etonda mɛkɛ.+
25 “Nalobi na bino makambo oyo na bandakisa.+ Ngonga ezali koya wana nakoloba na bino lisusu na bandakisa te, kasi nakoyebisa bino polele makambo etali Tata.
26 Na mokolo yango, bokosɛnga na nkombo na ngai, mpe nalobi na bino te ete nakosɛnga Tata mpo na bino.
27 Mpo Tata ye moko alingaka bino mingi, mpo bino bolingi ngai mingi+ mpe bondimi ete nabimaki lokola momonisi ya Tata.+
28 Nautaki epai ya Tata mpe nayei na mokili. Lisusu, nazali kotika mokili mpe nazali kokende epai ya Tata.”+
29 Bayekoli na ye balobaki ete: “Talá! Sikoyo ozali koloba polele, mpe ozali koloba na ndakisa te.
30 Sikoyo toyebi ete oyebi makambo nyonso+ mpe ntina ezali te ete moto atuna yo motuna.+ Na yango, tondimi ete outaki epai ya Nzambe.”+
31 Yesu ayanolaki bango ete: “Bondimi sikoyo?
32 Talá! Ngonga ezali koya, kutu, esili koya, wana bokopanzana moto na moto na ndako na ye+ mpe bokotika ngai kaka ngai moko; nzokande nazali kaka ngai moko te, mpo Tata azali elongo na ngai.+
33 Nalobi na bino makambo oyo mpo na nzela na ngai bózala na kimya.+ Na mokili bozali na bolɔzi, kasi bózala na mpiko! Ngai nalongi mokili.”+