Yoane 15:1-27

15  “Ngai nazali nzete ya vinyo ya solosolo,+ mpe Tata na ngai azali mosali-bilanga.+  Etape nyonso oyo ezali na ngai, oyo ebotaka mbuma te, alongolaka yango,+ mpe nyonso oyo ebotaka mbuma, apɛtolaka+ yango, mpo ebota mbuma mingi lisusu.+  Bino bosili kopɛtolama mpo na liloba oyo nalobaki na bino.+  Bótikala na bomoko elongo na ngai, mpe ngai na bomoko elongo na bino.+ Lokola etape ekoki kobota mbuma yango moko te kozanga kokangama na nzete ya vinyo, bino mpe ndenge moko bokoki kobota mbuma te, soki botikali na bomoko elongo na ngai te.+  Ngai nazali nzete ya vinyo, bino bozali bitape. Moto oyo atikali na bomoko elongo na ngai, mpe ngai na bomoko elongo na ye, moto wana akobota mbuma mingi;+ mpo, soki botiki ngai, bokoki kosala eloko moko te.  Soki moto atikali na bomoko elongo na ngai te, akobwakama lokola etape mpe akokauka; mpe basangisaka bitape wana mpe babwakaka yango na mɔtɔ mpe ezikaka.+  Soki botikali na bomoko elongo na ngai mpe soki maloba na ngai efandi na kati na bino, bósɛnga eloko nyonso oyo bolingi mpe ekosalema mpo na bino.+  Tata na ngai azali kozwa nkembo na likambo oyo: bókoba kobota mbuma mingi mpe kolakisa mpenza ete bozali bayekoli na ngai.+  Kaka ndenge Tata alingi ngai mpe ngai nalingi bino,+ bótikala na kati ya bolingo na ngai. 10  Soki botosi mitindo na ngai,+ bokotikala na kati ya bolingo na ngai, ndenge ngai mpe natosi mitindo ya Tata+ mpe natikali na kati ya bolingo na ye. 11  “Nalobi na bino makambo wana, mpo esengo na ngai ezala na kati na bino mpe esengo na bino etonda mɛkɛ.+ 12  Mobeko na ngai yango oyo: bólinganaka ndenge ngai nalingi bino.+ 13  Ata moto moko te azali na bolingo koleka oyo, ete moto akaba molimo na ye mpo na baninga na ye.+ 14  Bozali baninga na ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kopesa bino mitindo.+ 15  Nazali kobenga bino lisusu baombo te, mpo moombo ayebaka te oyo nkolo na ye asalaka. Kasi nabengi bino baninga,+ mpo makambo nyonso oyo nayoki epai ya Tata na ngai, nayebisi bino yango.+ 16  Bino boponi ngai te, kasi ngai nde naponi bino, mpe natye bino na mosala mpo bókende mpe bókoba kobota mbuma+ mpe mpo mbuma na bino ekoba kozala; mpo nyonso oyo bokosɛnga Tata na nkombo na ngai, akopesa bino yango.+ 17  “Na makambo wana, nazali kopesa bino mitindo mpo bólinganaka.+ 18  Soki mokili eyini bino, boyebi ete eyinaki ngai liboso ya koyina bino.+ 19  Soki bozalaki bato ya mokili, mbɛlɛ mokili ezali kolinga eloko na yango.+ Lokola bozali bato ya mokili te,+ kasi naponi bino na mokili, yango wana mokili ezali koyina bino.+ 20  Bókanisaka liloba oyo nalobaki na bino ete: Moombo aleki nkolo na ye te. Soki banyokolaki ngai, bakonyokola mpe bino;+ soki batosaki liloba na ngai, bakotosa mpe oyo ya bino. 21  Kasi bakosala bino makambo nyonso wana mpo na nkombo na ngai, mpo bayebi te moto oyo atindaki ngai.+ 22  Soki nayaki koloba na bango te, mbɛlɛ bazali na lisumu te;+ kasi sikoyo bazali na likambo ya komilongisa te mpo na lisumu na bango.+ 23  Moto oyo azali koyina ngai azali mpe koyina Tata na ngai.+ 24  Soki nasalaki te na kati na bango misala oyo ata moto moko te asalá,+ mbɛlɛ bazali na lisumu te;+ kasi sikoyo bamoni mpe bayini ná ngai ná Tata na ngai.+ 25  Kasi ezali mpo liloba oyo ekomamá na Mibeko na bango ekokisama ete: ‘Bayinaki ngai kaka mpamba.’+ 26  Ntango mosungi akoya, oyo nakotinda uta na Tata,+ elimo ya solo, oyo euti na Tata, ye akopesa litatoli mpo na ngai;+ 27  mpe bino, na ngala na bino, bosengeli kopesa litatoli,+ mpo bozali elongo na ngai banda ntango nabandaki.

Maloba na nse