Yoane 10:1-42

10  “Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete: Moto oyo akɔti na lopango ya bampate na porte+ na yango te kasi amati na esika mosusu, moto wana azali moyibi mpe mopunzi.+  Kasi moto oyo akɔti na porte+ azali mobateli+ ya mpate.+  Mokɛngɛli ya porte+ afungolelaka ye, mpe bampate+ eyokaka mongongo na ye, mpe abengaka bampate na ye na nkombo mpe amemaka yango na libándá.  Ntango abimisi oyo ya ye nyonso, alekaka liboso na yango, mpe bampate elandaka+ ye, mpo eyebi mongongo na ye.+  Ekolanda mopaya soki moke te kasi ekokima+ ye, mpo eyebi mongongo ya bapaya te.”+  Yesu apesaki bango ndakisa wana; kasi bayebaki te soki makambo oyo azalaki koloba na bango elakisaki nini.+  Na yango, Yesu alobaki lisusu ete: “Ya solosolo mpenza, nalobi na bino ete: Ngai nazali porte+ ya bampate.  Baoyo nyonso bayaki na esika na ngai bazali miyibi mpe bapunzi;+ kasi bampate eyokaki bango te.+  Ngai nazali porte;+ moto nyonso oyo akɔti na nzela na ngai akobika, akokɔta mpe akobima mpe akozwa esika ya matiti.+ 10  Moyibi+ ayaka kaka mpo na koyiba mpe koboma mpe kobebisa.+ Ngai nayei mpo bázwa bomoi mpe bázwa yango mingi. 11  Ngai nazali mobateli ya mpate+ oyo aleki malamu; mobateli ya mpate oyo aleki malamu apesaka molimo na ye mpo na bampate.+ 12  Moto oyo bazwá na mosala,+ oyo azali mobateli ya mpate te mpe oyo bampate yango ezali ya ye te, ntango amoni mbwa ya zamba ezali koya asundolaka bampate mpe akimaka—mpe mbwa ya zamba ekangaka yango mpe epanzaka yango+ 13  mpo azali moto bazwá na mosala+ mpe amitungisaka te mpo na bampate.+ 14  Ngai nazali mobateli ya mpate oyo aleki malamu, mpe nayebi bampate na ngai+ mpe bampate na ngai eyebi ngai,+ 15  ndenge Tata ayebi ngai mpe ngai nayebi Tata;+ mpe ngai nazali kokaba molimo na ngai mpo na bampate.+ 16  “Mpe nazali na bampate mosusu,+ oyo ezali ya lopango oyo te;+ yango mpe nasengeli komema yango, mpe ekoyoka mongongo na ngai,+ mpe ekokóma etonga kaka moko, na mobateli kaka moko.+ 17  Yango wana Tata alingi ngai,+ mpo nazali kokaba molimo na ngai,+ mpo nazwa yango lisusu. 18  Moto moko te abɔtɔli ngai yango, kasi nazali kokaba yango na likanisi na ngai moko. Nazali na lotomo ya kopesa yango, mpe nazali na lotomo ya kozwa yango lisusu.+ Na likambo yango, nazwi mitindo+ oyo epai ya Tata na ngai.” 19  Bokabwani+ ekɔtaki lisusu na kati ya Bayuda mpo na maloba wana. 20  Mingi na bango bazalaki koloba ete: “Azali na demo+ mpe azali moto ya ligboma. Mpo na nini bozali koyoka ye?” 21  Bamosusu bazalaki koloba ete: “Wana ezali maloba ya moto oyo azali na demo te. Demo akoki kofungola te miso ya bato bakufá miso, boye te?” 22  Na ntango yango fɛti ya bofungoli ezalaki kosalema na Yerusaleme. Ezalaki eleko ya mpiɔ makasi, 23  mpe Yesu azalaki kotambola na kati ya tempelo na veranda ya Salomo.+ 24  Na yango, Bayuda bazingaki ye mpe babandaki koloba na ye ete: “Tii ntango nini okotika milimo na biso likolólikoló? Soki ozali Kristo,+ yebisá biso polele.”+ 25  Yesu ayanolaki bango ete: “Nayebisaki bino, kasi bozali kondima te. Misala oyo nazali kosala na nkombo ya Tata na ngai, yango nde ezali kopesa litatoli mpo na ngai.+ 26  Kasi bozali kondima te, mpo bozali bampate na ngai te.+ 27  Bampate+ na ngai eyokaka mongongo na ngai, mpe nayebi yango, mpe elandaka ngai.+ 28  Mpe nazali kopesa bango bomoi ya seko,+ mpe bakobebisama soki moke te,+ mpe moto moko te akobɔtɔla bango na mabɔkɔ na ngai.+ 29  Oyo Tata+ na ngai apesi ngai ezali eloko moko oyo eleki biloko mosusu nyonso,+ mpe moto moko te akoki kobɔtɔla yango na lobɔkɔ ya Tata.+ 30  Ngai ná Tata tozali moko.”+ 31  Na mbala oyo lisusu Bayuda balɔkɔtaki mabanga mpo na kobamba ye.+ 32  Yesu azongiselaki bango ete: “Nalakisaki bino misala mingi ya kitoko oyo euti epai ya Tata. Na misala wana, mpo na oyo wapi bozali kobamba ngai mabanga?” 33  Bayuda bayanolaki ye ete: “Tozali kobamba yo mabanga, mpo na mosala moko ya kitoko te, kasi mpo na kofinga,+ ɛɛ mpo yo, atako ozali moto, omikómisi nzambe.”+ 34  Yesu ayanolaki bango ete: “Ekomamá te na Mibeko na bino+ ete: ‘Nalobaki: “Bino bozali banzambe”’?+ 35  Soki abengaki ‘banzambe’+ baoyo liloba ya Nzambe eyelaki, nzokande Likomami ekoki kolongolama te,+ 36  bozali koloba na ngai oyo Tata asantisá mpe atindi na mokili ete: ‘Ozali kofinga,’ mpo nalobi ete: Nazali Mwana ya Nzambe?+ 37  Soki nazali kosala misala+ ya Tata na ngai te, bóndima ngai te. 38  Kasi soki nazali kosala yango, ata soki bozali kondima ngai te, bóndima misala yango,+ mpo bóyeba mpe bókoba koyeba ete Tata azali na bomoko elongo na ngai mpe ngai nazali na bomoko elongo na Tata.”+ 39  Na yango, balukaki lisusu kokanga ye;+ kasi akimaki mosika na bango.+ 40  Bongo akendaki lisusu na ngámbo mosusu ya Yordani na esika oyo Yoane azalaki kobatisa+ na ebandeli, mpe afandaki kuna. 41  Mpe bato mingi bayaki epai na ye, mpe babandaki koloba ete: “Ya solo, Yoane asalaki ata elembo moko te, kasi makambo nyonso oyo Yoane alobaki mpo na moto oyo ezalaki ya solo.”+ 42  Mpe bato mingi bandimelaki ye kuna.+

Maloba na nse