Yisaya 9:1-21
9 Nzokande, molili ekozala te lokola ntango mokili ezalaki kotungisama makasi, lokola na ntango ya kala oyo bazalaki kotyola mokili ya Zebulone mpe mokili ya Nafatali+ mpe, na nsima, ntango basalaki ete nzela oyo ezali pene na mbu, na etúká ya Yordani, Galile ya bikólo+ ekumisama.+
2 Bato oyo bazalaki kotambola na molili bamoni pole moko monene.+ Nde baoyo bafandi na mokili ya molili tuu,+ pole engɛngɛli bango.+
3 Okómisi ekólo yango bato ebele;+ osali ete esengo na yango ezala monene.+ Basepeli liboso na yo ndenge bato basepelaka na ntango ya kobuka mbuma,+ ndenge bato bayokaka esengo ntango bazali kokabola biloko oyo bapunzi.+
4 Mpo obukibuki ekanganeli ya mokumba na bango+ mpe fimbo oyo ezali na mapeka na bango, lingenda ya moto oyo azali kotinda bango na makasi básala mosala,+ lokola na mokolo ya Midiane.+
5 Mpo sapato nyonso ya moto oyo azali konyata+ na lokito, mpe elamba oyo ebalolami na makila ekómi mpenza ya kotumba, lokola biloko oyo ebongi na mɔtɔ.+
6 Mpo baboteli biso mwana,+ bapesi biso mwana mobali;+ mpe boyangeli ekozala na lipeka na ye.+ Mpe bakopesa ye nkombo Mopesi-Toli Monene,+ Nzambe ya Nguya,+ Tata ya Seko,+ Nkumu ya Kimya.+
7 Bonene ya boyangeli na ye+ mpe kimya, kiti ya bokonzi ya Davidi+ mpe bokonzi na ye, ekozala na nsuka te.+ Ekopikama makasi+ mpe ekosimbama na bosembo+ mpe na boyengebene,+ banda sikoyo mpe tii na ntango oyo etyami ndelo te. Molende mpenza ya Yehova ya mampinga nde ekosala yango.+
8 Yehova atindelaki Yakobo liloba moko, mpe yango ekwelaki Yisraele.+
9 Mpe bato bakoyeba yango mpenza,+ ɛɛ bango nyonso, Efraime mpe moto oyo afandi na Samaria,+ mpo na lolendo na bango mpe mpo na lofundo ya motema na bango na ndenge balobi:+
10 “Babriki ekwei, kasi tokotonga na mabanga oyo bakatá.+ Banzete ya sikomore+ ekatami, kasi na esika na yango tokotya banzete ya sɛdrɛ.”
11 Mpe Yehova akotika banguna ya Rezine bátɛmɛla ye makasi, mpe akotinda banguna ya oyo wana,+
12 Siri ekouta na ɛsti+ mpe Bafilistia bakouta na nsima,+ bakofungola monɔkɔ na bango mpe bakolya Yisraele.+ Mpo na makambo oyo nyonso, nkanda na ye ezongi nsima te, kasi lobɔkɔ na ye esembolami kaka.+
13 Mpe bato bazongeli te Moto oyo azali kobɛta bango,+ mpe baluki Yehova ya mampinga te.+
14 Mpe na Yisraele, na mokolo moko kaka,+ Yehova akokata motó+ ná mokila,+ etape ná nkɛkɛlɛ.
15 Mobange mpe moto oyo bapesaka limemya mingi nde motó,+ mpe mosakoli oyo azali kopesa mateya ya lokuta nde mokila.+
16 Mpe baoyo bazali kokamba bato oyo nde bazali kotinda bango báyengayenga;+ mpe bato na bango oyo bakambami, bango nde babulunganisami.+
17 Yango wana Yehova akosepela ata na bilenge mibali na bango te,+ mpe akoyoka mawa te mpo na bana na bango oyo batata bakufá mpe basi na bango oyo mibali bakufá; mpo bango nyonso bazali bapɛngwi+ mpe basali-mabe mpe monɔkɔ nyonso ezali koloba makambo ya bozoba. Mpo na makambo oyo nyonso, nkanda na ye ezongi nsima te, kasi lobɔkɔ na ye esembolami kaka.+
18 Mpo mabe epeli lokola mɔtɔ;+ ekolya mwa banzete ya nzubɛ mpe matiti mabe.+ Mpe ekopelisa mwa banzete oyo ezali na zamba,+ mpe mwa banzete yango ekotombwana na likoló lokola lipata ya molinga oyo ezali kobalukabaluka.+
19 Na nkɛlɛ ya Yehova ya mampinga mokili epeli mɔtɔ, mpe bato bakokóma lokola biloko oyo mɔtɔ ekolya.+ Moto moko te akoyokela ata ndeko na ye mawa.+
20 Mpe bakokata eloko ya kolya na lobɔkɔ ya mobali kasi bakozala kaka na nzala; mpe bakolya eloko na lobɔkɔ ya mwasi, kasi ya solo, bakotonda te.+ Bakolya, moto na moto, mosuni ya lobɔkɔ na ye,+
21 Manase akolya Efraime, mpe Efraime akolya Manase. Bango nyonso elongo bakobunda na Yuda.+ Mpo na makambo oyo nyonso, nkanda na ye ezongi nsima te, kasi lobɔkɔ na ye esembolami kaka.+