Yisaya 65:1-25

65  “Natiki baoyo batunaki ngai+ te báluka ngai.+ Natiki baoyo balukaki ngai te bámona ngai.+ Nalobi boye na ekólo oyo ezalaki kobelela nkombo na ngai te:+ ‘Ngai oyo, ngai oyo!’+  “Natandi mabɔkɔ na ngai mokolo mobimba epai ya bato ya motó makasi,+ oyo bazali kotambola na nzela oyo ezali malamu te,+ oyo bazali kolanda makanisi na bango;+  bato oyo bazali lisangá ya baoyo bazali ntango nyonso kofinga+ ngai na miso na ngai boye, bazali kopesa mbeka na bilanga+ mpe bazali kobimisa milinga ya mbeka+ likoló ya babriki,  bazali kofanda na malita,+ bato oyo bazali mpe kokɛngɛla butu mobimba na mwa bandako ya matiti, bazali kolya mosuni ya ngulu,+ ɛɛ supu ya biloko ya mbindo+ ezali na bambɛki na bango;  baoyo bazali koloba ete: ‘Fandá esika oyo ozali. Kopusana pene na ngai te, mpo ya solo nakopesa yo bosantu.’+ Baoyo wana bazali molinga na zolo na ngai,+ mɔtɔ oyo ezali kopela mokolo mobimba.+  “Talá! Ekomami liboso na ngai.+ Nakokanga monɔkɔ te,+ kasi nakopesa mbano;+ kutu nakopesa mbano na ntolo na bango,+  mpo na mabunga na bango moko mpe mpo na mabunga ya bankɔkɔ na bango, nyonso na mbala moko,”+ Yehova alobi bongo. “Lokola babimisi milinga ya mbeka na bangomba, mpe basambwisi ngai+ na bangomba mike,+ ngai mpe nakomeka libosoliboso lifuti na bango na ntolo na bango.”+  Talá oyo Yehova alobi: “Se ndenge vinyo ya sika+ ezwamaka na etuka mpe moto moko alobaka ete: ‘Kobebisa yango te,+ mpo lipamboli ezali na kati,’+ ndenge wana nde nakosala basaleli na ngai, mpo náboma bato nyonso te.+  Mpe nakobimisa bana na Yakobo+ mpe bazwi-ya-libula ya bangomba+ na ngai na Yuda; mpe bato oyo naponi bakozwa yango,+ mpe basaleli na ngai bakofanda kuna.+ 10  Mpe Sharone+ ekokóma mpenza esika bampate ekolya matiti+ mpe lobwaku ya patatalu ya Akore+ ekokóma esika bangɔmbɛ mpe bato na ngai oyo bakoluka ngai bakopema.+ 11  “Kasi bino bozali baoyo bazali kotika Yehova,+ baoyo bazali kobosana ngomba mosantu na ngai,+ baoyo bazali kotyela nzambe ya Makila Malamu+ biloko na mesa mpe baoyo bazali kotondisela nzambe ya Makambo Nyonso Etángamá+ vinyo oyo esangisami. 12  Mpe nakokaba bino na mopanga,+ mpe bino nyonso bokogumbama mpo bóbomama;+ mpamba te nabengaki,+ kasi boyanolaki te; nalobaki, kasi boyokaki te;+ mpe bozalaki se kosala oyo ezali mabe na miso na ngai,+ mpe boponaki likambo oyo nasepelaka na yango ata moke te.”+ 13  Na yango talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Talá! Basaleli na ngai bakolya,+ kasi bino bokozala na nzala.+ Talá! Basaleli na ngai bakomɛla,+ kasi bino bokozala na mposa ya mai.+ Talá! Basaleli na ngai bakosepela,+ kasi bino bokozala na nsɔni.+ 14  Talá! Basaleli na ngai bakoganga na esengo na ndenge bakoyoka malamu na motema,+ kasi bino bokoganga mpo na mpasi na motema mpe bokoganga na kolela mpo elimo elɛmbi.+ 15  Mpe ya solo bokotya nkombo na bino mpo ezala ndai ya bato oyo naponi, mpe ya solo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso akoboma bino mokomoko,+ kasi akobenga basaleli na ye na nkombo mosusu;+ 16  bongo moto nyonso oyo akomizwela lipamboli na mabele akomizwela lipamboli na nkombo ya Nzambe ya kondima,+ mpe moto nyonso oyo akolapa ndai na mabele akolapa ndai na nkombo ya Nzambe ya kondima;+ mpo bakobosana mpenza bampasi ya kala mpe mpo ekobombama mpenza mpe ekomonana te na miso na ngai.+ 17  “Mpo talá nazali kozalisa likoló ya sika+ mpe mabele ya sika;+ mpe makambo ya kala ekokanisama lisusu te,+ mpe ekoya na motema te.+ 18  Kasi bósepela,+ mpe bózala na esengo libela mpo na oyo nazali kozalisa.+ Mpo talá nazali kozalisa Yerusaleme mpo ezala eloko oyo ezali kopesa esengo mpe bato na ye mpo bázala eloko oyo ezali kosepelisa.+ 19  Mpe nakozala na esengo mpo na Yerusaleme mpe nakosepela na bato na ngai;+ mpe makɛlɛlɛ ya kolela ekoyokana lisusu te epai na ye to makɛlɛlɛ ya komilelalela.”+ 20  “Na esika oyo, ekozala lisusu te na mwana oyo azali komɛla mabɛlɛ oyo akoumela kaka mikolo moke,+ to mobange oyo akokokisa mikolo na ye te;+ mpo moto akokufa azali naino elenge mobali atako akómi na mbula nkama moko (100); bongo mosumuki, atako akómi na mbula nkama moko, bakolakela ye mabe.+ 21  Mpe ya solo, bakotonga bandako mpe bakofanda kuna;+ mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango.+ 22  Bakotonga mpo moto mosusu afandaka kuna te; bakolona mpo moto mosusu alya te. Mpo mikolo ya bato na ngai ekozala lokola mikolo ya nzete;+ mpe bato oyo naponi bakozwa mpenza litomba na mosala ya mabɔkɔ na bango.+ 23  Bakoboma nzoto mpamba te,+ mpe bakobota mpo na kotungisama te;+ mpo bazali bana oyo bazali lisangá ya bato oyo Yehova apamboli,+ bango ná bakitani na bango.+ 24  Mpe ekosalema mpenza boye: liboso ete bábelela, ngai nakoyanola;+ ntango bazali naino koloba, ngai nakoyoka.+ 25  “Mbwa ya zamba+ mpe mwana-mpate bakolya esika moko,+ mpe nkɔsi akolya matiti ya kokauka lokola ngɔmbɛ;+ kasi nyoka, bilei na ye ekozala putulu.+ Bakosala mabe te+ mpe bakobebisa eloko moko te na ngomba na ngai mosantu mobimba,”+ Yehova alobi bongo.

Maloba na nse