Yisaya 62:1-12

62  Mpo na Siona nakokanga monɔkɔ te,+ mpe mpo na Yerusaleme+ nakofanda nyɛɛ te kino boyengebene na ye ekobima lokola kongɛnga,+ mpe lobiko na ye lokola esungi oyo ezali kopela.+  “Mpe bikólo bakomona mpenza boyengebene na yo,+ Ee mwasi,+ mpe bakonzi nyonso bakomona nkembo na yo.+ Mpe ya solo, bakobenga yo na nkombo ya sika,+ oyo monɔkɔ ya Yehova ekopesa.  Mpe okokóma mpenza motole ya kitoko na lobɔkɔ ya Yehova,+ mpe elamba ya kolínga na motó ya mokonzi na lobɔkɔ ya Nzambe na yo.  Bakoloba lisusu te ete ozali mwasi oyo basundolá mpenza;+ mpe bakoloba lisusu te ete mokili na yo etikalá mpamba;+ kasi bakobenga yo: Nasepeli na ye,+ mpe bakobenga mokili na yo: Mwasi ya moto. Mpo Yehova akosepela na yo, mpe mokili na yo ekozala lokola mwasi ya moto.+  Mpo se ndenge elenge mobali azwaka ngɔndɔ mpo azala mwasi na ye, bana na yo bakozwa yo mpo ozala mwasi na bango.+ Mpe Nzambe na yo akosepela na yo+ ndenge mobali oyo auti kobala asepelaka na mwasi oyo ye abali.+  Ee Yerusaleme, natye basinzili+ likoló ya bifelo na yo. Moi mobimba mpe butu mobimba, ntango nyonso, bákanga monɔkɔ te.+ “Bino baoyo bozali kolobela nkombo ya Yehova,+ bófanda nyɛɛ te,+  mpe bótika ye kimya te kino akotɛlɛmisa Yerusaleme makasi, ɛɛ, kino akotya yango eloko oyo ekokumisama na mabele.”+  Yehova alapi ndai na lobɔkɔ na ye ya mobali+ mpe na lobɔkɔ na ye makasi+ ete: “Nakopesa lisusu te banguna na yo mbuma na yo mpo bálya,+ mpe bato ya mboka mosusu bakomɛla te vinyo na yo ya sika+ oyo obomelaki nzoto.  Kasi baoyo bakobuka yango bakolya yango, mpe bakosanzola mpenza Yehova; mpe baoyo bazali koyanganisa yango bakomɛla yango na mapango mosantu na ngai.”+ 10  Bóleka, bóleka na baporte. Bóbongisa nzela ya bato.+ Bótondisa mabele, bótondisa mabele na balabala monene. Bólongola mabanga na yango.+ Bótɛlɛmisela bato ya bikólo elembo.+ 11  Talá! Yehova ye moko ayebisi yango kino na eteni ya mabele oyo eleki mosika:+ “Bóloba na mwana mwasi ya Siona+ ete: ‘Talá! Lobiko na yo ezali koya.+ Talá! Azali na mbano ya kopesa,+ mpe lifuti oyo azali kofuta ezali liboso na ye.’”+ 12  Mpe ya solo, bato bakobenga bango ekólo mosantu,+ baoyo Yehova asikoli,+ mpe yo moko, bakobenga yo Oyo balukaka, Engumba oyo basundolá ata moke te.+

Maloba na nse