Yisaya 61:1-11
61 Elimo ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso ezali na ngai,+ mpo Yehova atye ngai mafuta+ mpo nayebisa bato ya komikitisa nsango malamu.+ Atindi ngai nakanga mpota ya bato oyo bazoki na mitema,+ nasakola bonsomi epai ya baoyo bakangami+ mpe nafungola polele miso ya bato ya bolɔkɔ;+
2 nasakola mbula ya boboto oyo euti na Yehova+ mpe mokolo Nzambe na biso akozongisa mabe;+ nabɔndisa baoyo bazali kolela;+
3 napesa baoyo bazali kolela Siona, napesa bango eloko ya kolata na motó na esika ya putulu ya mɔtɔ,+ mafuta ya nsai+ na esika ya kolela, kazaka ya lisanzoli na esika ya elimo ya kolɛmba nzoto;+ mpe ya solo, bakobenga bango banzete minene ya boyengebene,+ elanga oyo Yehova aloná,+ mpo akóma kitoko.+
4 Mpe bakotonga mpenza lisusu bisika oyo ebebisamá banda kala;+ bakotɛlɛmisa bisika ya kalakala oyo etikalá mpamba,+ mpe bakobongisa lisusu bingumba oyo ebebisamá,+ bisika oyo etikalaki mpamba libota na libota.
5 “Mpe bapaya bakotɛlɛma mpenza mpe bakobatela bitonga na bino,+ mpe bato ya mboka mosusu+ bakozala baloni-bilanga na bino mpe basali-bilanga na bino ya vinyo.+
6 Nde bino, bokobengama banganga-nzambe ya Yehova;+ bakoloba ete bozali basaleli+ ya Nzambe na biso.+ Bokolya biloko ya bikólo,+ mpe bokomikumisa na nkembo na bango.+
7 Na esika ya nsɔni na bino ekozala likabo mbala mibale,+ mpe na esika ya kosambwa bakoganga na esengo mpo na likabo na bango.+ Yango wana, bakozwa makabo mibale+ na mokili na bango. Bakozala na esengo mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+
8 Mpo ngai Yehova nalingi bosembo,+ nayini moyibi ná kozanga boyengebene.+ Mpe nakopesa lifuti na bango na bosembo,+ mpe nakosalela bango kondimana oyo ekoumela mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+
9 Mpe bana na bango bakoyebana na kati ya bikólo,+ mpe bakitani na bango na kati ya bato ya bikólo. Baoyo nyonso bakomona bango bakoyeba bango+ mpe bakoyeba ete bazali bana oyo Yehova apambolá.”+
10 Ya solo, nakosepela na Yehova.+ Molimo na ngai ekozala na esengo na Nzambe na ngai.+ Mpo alatisi ngai bilamba ya lobiko;+ alíngi ngai kazaka ya boyengebene oyo ezangá mabɔkɔ,+ lokola mobali ya libala oyo azali kotya eloko ya kolata na motó,+ ndenge nganga-nzambe atyaka, mpe lokola mwasi ya libala oyo azali kolata biloko na ye ya kobongisa nzoto.+
11 Mpo ndenge mabele ebimisaka milona na yango ya sika, mpe ndenge elanga ebimisaka biloko oyo baloni kuna,+ ndenge wana nde Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso akobimisa boyengebene+ mpe lisanzoli liboso ya bikólo nyonso.+