Yisaya 57:1-21

57  Moyengebene akufi,+ kasi moto moko te azali kotya likambo yango na motema.+ Mpe bato ya motema boboto bazali koyanganisama na bakufi,+ ntango moto moko te azali kososola ete moyengebene alongolami nde mpo na mpasi.+  Azali kokɔta na kati ya kimya;+ bazali kopema+ na bambeto+ na bango, moto na moto oyo azali kotambola na bosembo.+  “Kasi bino, bóbɛlɛma awa,+ bino bana ya mwasi oyo asakolaka makambo oyo ekoya,+ momboto ya moto ya ekobo mpe ya mwasi oyo azali kosala bondumba:+  Bozali kosɛka nani?+ Nani bozali se kofungolela monɔkɔ polele mpe kobimisela lolemo?+ Bozali bana ya kobuka mibeko, momboto ya bokosi,+  baoyo balamwisaka mposa makasi na banzete minene,+ na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa,+ bazali koboma bana na mabwaku ya mikɛli, na nse ya madusu ya mabanga, boye te?+  “Likabo na yo ezalaki na mabanga ya sɛlisɛli ya lobwaku ya mokɛli.+ Yango nde ezalaki libula na yo.+ Lisusu, osopelaki yango likabo ya masanga,+ opesaki likabo. Nakomibɔndisa nde na makambo wana?+  Otyaki mbeto na yo likoló ya ngomba ya molai mpe oyo etombwaná.+ Omataki mpe kuna mpo na kopesa mbeka.+  Mpe na nsima ya porte mpe ya likonzí ya porte, otyaki ekaniseli na yo.+ Mpo otikaki ngai, omitikaki bolumbu mpe omataki; okómisaki mbeto na yo monene.+ Mpe bamposa na yo etindi yo osala na bango kondimana. Olingaki kozala na bango mbeto moko.+ Otalaki enama ya mibali.  Mpe obandaki kokita na mafuta epai ya Meleke, mpe ozalaki se kobakisabakisa malasi na yo ya ndenge na ndenge.+ Mpe okobaki kotinda bato na yo mosika, bongo okitisaki makambo kino na Nkunda.*+ 10  Obomi nzoto na ebele ya banzela na yo.+ Olobi te ete: ‘Mpamba!’ Makasi na yo ezongi lisusu.+ Yango wana obɛli te.+ 11  “Okómaki na nsɔmɔ ya nani mpe obandaki kobanga nani,+ mpo okóma kobuka lokuta?+ Kasi okanisaki ngai te.+ Otyaki eloko moko te na motema.+ Nafandaki nyɛɛ mpe nabombaki makambo, boye te?+ Yango wana, ozalaki kobanga ngai te.+ 12  Ngai moko nakosakola boyengebene+ na yo mpe misala na yo.+ Ekopesa yo litomba te.+ 13  Ntango okoganga mpo na koluka lisalisi, biloko na yo oyo oyanganisá ekobikisa yo te,+ kasi mopɛpɛ ekomema yango nyonso.+ Molinga ekomema yango, kasi moto oyo azali kokima epai na ngai+ akozwa mokili ezala libula na ye mpe akozwa ngomba na ngai mosantu.+ 14  Mpe bakoloba mpenza boye: ‘Bótondisa mabele, bótondisa mabele! Bóbongisa nzela.+ Bólongola libaku nyonso na nzela ya bato na ngai.’”+ 15  Mpo talá oyo Moto oyo azali likoló mpe Moto oyo atombwani,+ oyo afandi mpo na libela+ mpe oyo nkombo na ye ezali mosantu,+ alobi: “Nafandaka na esika oyo etombwaná mpe na esika mosantu,+ mpe esika moko na moto oyo atutami mpe oyo azali na elimo ya komikitisa,+ mpo na kopesa lisusu makasi na elimo ya bato ya komikitisa mpe kopesa makasi lisusu na motema ya bato oyo batutami.+ 16  Mpamba te, nakowelana te mpo na ntango oyo etyami ndelo te, nakosilika mpe mpo na libela te;+ mpamba te mpo na ngai elimo ekolɛmba,+ ɛɛ bikelamu oyo epemaka oyo ngai moko nasalá.+ 17  “Nasilikaki mpo na libunga na ye ya koluka litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe,+ mpe nabɛtaki ye, nazalaki kobomba elongi na ngai,+ ntango nazalaki na nkanda. Kasi akobaki kotambola lokola mopɛngwi+ na nzela ya motema na ye. 18  Namoni banzela na ye; mpe nabandaki kobikisa ye+ mpe kotambwisa ye+ mpe kopesa ye ná bato na ye oyo bazalaki kolela+ lifuti, elingi koloba libɔndisi.”+ 19  “Nazali kozalisa mbuma ya mbɛbu.+ Kimya ya ntango nyonso ekozala mpo na moto oyo azali mosika mpe mpo na moto oyo azali pene,”+ Yehova alobi bongo, “mpe nakobikisa ye.”+ 20  “Kasi bato mabe bazali lokola mbu oyo ezali kotombwatombwana, ntango ezali kokoka kofanda nyɛɛ te, oyo mai na yango ezali kobwakabwaka matiti ya mai mpe pɔtɔpɔtɔ.” 21  Nzambe na ngai alobi: “Bato mabe bazali na kimya te.”+

Maloba na nse

To, “Sheole.” Talá Ap 4.