Yisaya 56:1-12

56  Talá oyo Yehova alobi: “Bóbatela bosembo+ mpe bósala makambo ya boyengebene.+ Mpo etikali moke lobiko na ngai eya,+ mpe boyengebene na ngai emonisama.+  Esengo na moto—mowei mpamba—oyo azali kosala bongo,+ mpe na mwana ya bato oyo akangami na yango,+ oyo azali kotosa sabata mpo akómisa yango eloko mpamba te,+ mpe oyo azali kobatela lobɔkɔ na ye mpo asala eloko moko te ya mabe.+  Mpe mopaya oyo ayei kokangama na Yehova aloba te ete:+ ‘Ya solo, Yehova akokabola ngai na bato na ye.’+ Mokube+ mpe aloba te ete: ‘Talá! Nazali nde nzete oyo ekauká.’”  Mpo talá oyo Yehova alobi: “Mikube oyo bazali kotosa basabata na ngai mpe oyo baponá makambo oyo nasepelaka na yango+ mpe bakangami na kondimana na ngai,+  nakopesa bango mpenza monimá+ mpe nkombo+ na ndako na ngai+ mpe na kati ya bifelo na ngai, eloko moko ya malamu koleka bana mibali ná bana basi.+ Nakopesa bango nkombo mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+ nkombo oyo ekolongolama te.+  “Mpe bapaya oyo basangani na Yehova mpo na kosalela ye+ mpe mpo na kolinga nkombo ya Yehova,+ mpo na kokóma basaleli na ye, baoyo nyonso bazali kotosa sabata mpo na kokómisa yango eloko mpamba te mpe bakangami na kondimana na ngai,+  nakomema mpe bango na ngomba na ngai mosantu+ mpe nakosepelisa bango na ndako na ngai ya mabondeli.+ Makabo na bango ya kotumba mobimba+ ná bambeka+ na bango ekondimama likoló ya etumbelo+ na ngai. Mpo ndako na ngai ekobengama ndako ya mabondeli mpo na bato ya bikólo nyonso.”+  Liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, oyo azali koyanganisa bato ya Yisraele oyo bapanzaná,+ yango oyo: “Nakoyanganisa mpe bato mosusu epai na ye, longola bato na ye oyo bayanganisami.”+  Bino banyama nyonso ya zamba oyo efandaka na esobe, bóya kolya, bino banyama nyonso oyo efandaka na zamba.+ 10  Basinzili na ye bakufá miso.+ Ata moko na bango atye likebi te.+ Bango nyonso bazali bambwa oyo egangaka te; ezali kokoka koganga te,+ ezali komɛla mpema, elali na nse, elingá kolala.+ 11  Bazali bambwa oyo molimo na bango ezali na lokoso mingi;+ batondaka te.+ Bazali mpe babateli ya mpate oyo bakangaka ntina te.+ Babaluki bango nyonso na nzela na bango moko, moto na moto mpo na litomba na ye oyo ezwami na ndenge ya mabe na teritware na ye:+ 12  “Bóya! Nazwa mwa vinyo; mpe tólangwa masanga oyo elangwisaka.+ Mpe lobi ekozala mpenza lokola lelo, kutu malamu mingi koleka.”+

Maloba na nse