Yisaya 55:1-13
55 Ee bino nyonso oyo bozali na mposa ya mai!+ Bóya epai mai ezali.+ Mpe baoyo bazali na mbongo te! Bóya, bósomba mpe bólya.+ Ɛɛ, bóya, bósomba vinyo+ mpe miliki+ na mbongo te, ya ofele.+
2 Mpo na nini bozali kaka kobimisa mbongo mpo na eloko oyo ezali limpa te, mpe mpo na nini bozali koboma nzoto mpo na eloko oyo ezali kotondisa te?+ Bóyoka ngai na likebi, mpe bólya eloko oyo ezali malamu,+ mpe molimo na bino esepela mpenza na biloko ya mafuta.+
3 Bósembola litoi na bino+ mpe bóya epai na ngai.+ Bóyoka, mpe molimo na bino ekotikala na bomoi,+ mpe ya solo, nakosala na bino kondimana moko oyo ekoumela mpo na ntango oyo etyami ndelo te+ na kolanda motema boboto na ngai ya sembo epai ya Davidi.+
4 Talá! Napesi ye+ azala motatoli+ na bituluku ya bato ya bikólo,+ azala mokambi+ mpe komanda+ ya bituluku ya bato ya bikólo.
5 Talá! Okobenga ekólo oyo oyebi te,+ mpe bato ya ekólo oyo bayebi yo te bakoya mbangu epai na yo,+ mpo na Yehova Nzambe na yo,+ mpe mpo na Mosantu ya Yisraele,+ mpo akokómisa yo kitoko.+
6 Bóluka Yehova na ntango oyo akoki komonana.+ Bóbenga ye na ntango oyo azali pene.+
7 Moto mabe atika nzela na ye,+ mpe moto oyo alukaka kosalela bato mabe atika makanisi na ye;+ mpe azongela Yehova mpe akoyokela ye mawa,+ azongela Nzambe na biso, mpo akolimbisa mpenza.+
8 “Mpo makanisi na bino ezali makanisi na ngai te,+ mpe banzela na ngai ezali banzela na bino te,”+ yango nde liloba ya Yehova.
9 “Mpo ndenge likoló etombwani mosika koleka mabele,+ ndenge mpe banzela na ngai etombwani mosika koleka banzela na bino,+ mpe makanisi na ngai koleka makanisi na bino.+
10 Mpo ndenge mbula makasi ná nɛjɛ eutaka na likoló ekiti, mpe ezongaka kuna te soki epɔlisi naino mabele te mpe ebotisi yango te mpe esali te ete ebimisa milona,+ mpe mboto epesami naino te epai ya moloni mpe limpa epai ya molei,+
11 liloba oyo ezali kobima na monɔkɔ na ngai ekozala ndenge wana.+ Ekozongela ngai te soki ekokisi naino likambo na yango te,+ kasi ekosala mpenza oyo nasepeli na yango,+ mpe ekolonga mpenza na likambo oyo natindaki yango.+
12 “Mpo bokobima na esengo,+ mpe bokozonga na kimya.+ Bangomba mpe bangomba mike ekosepela liboso na bino na koganga ya esengo,+ mpe banzete nyonso ya zamba ekobɛta mabɔkɔ na yango.+
13 Na esika ya mwa banzete ya nzubɛnzubɛ, nzete ya jenevriye ekobima.+ Na esika ya lititi ya sendesende nzete ya mirte ekobima.+ Mpe ekozala mpenza eloko moko ya lokumu mpo na Yehova,+ elembo mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+ oyo ekolongolama te.”