Yisaya 54:1-17
54 “Gangá na esengo, yo mwasi ekomba oyo abotá te!+ Sepelá na koganga moko ya esengo mpe gangá makasi,+ yo mwasi oyo ozalaki na mpasi ya kobota te,+ mpo bana ya mwasi oyo atikalá mpamba bazali mingi koleka bana ya mwasi oyo azali na nkolo, mobali,”+ Yehova alobi bongo.
2 “Kómisá esika ya hema na yo monene koleka.+ Mpe bátanda bilamba ya hema na yo ya monene. Kotika te. Yeisá bansinga ya hema na yo milai, mpe bapike wana ya hema na yo, kómisá yango makasi.+
3 Mpo okopalangana na lobɔkɔ ya mobali mpe na lobɔkɔ ya mwasi,+ mpe bana na yo bakozwa bikólo,+ mpe bakofanda na bingumba oyo etikalá mpamba.+
4 Kobanga te,+ mpo okopɔla na nsɔni te;+ mpe koyoka te ete osambwe, mpo okolɛmba nzoto te.+ Mpo okobosana ata nsɔni ya ntango ya bolenge na yo,+ mpe okokanisa lisusu te kosambwa ya kozala ntango nyonso mwasi oyo mobali akufá.”
5 “Mpo Mokeli+ na yo Monene nde azali nkolo, mobali na yo,+ nkombo na ye Yehova ya mampinga;+ mpe Mosantu ya Yisraele azali Mosikoli na yo.+ Bakobenga ye Nzambe ya mabele mobimba.+
6 Mpo Yehova abengaki yo lokola nde ozalaki mwasi moko oyo basundolá mpenza mpe oyo anyokwami na makanisi,+ mpe lokola mwasi ya ntango ya bolenge+ oyo na nsima babenganaki,”+ Nzambe na yo alobi bongo.
7 “Nasundolaki yo mpenza mpo na mwa ntango moke,+ kasi nakoyanganisa yo na motema mawa monene mpenza.+
8 Na nkanda monene lokola mpela, nabombelaki yo elongi na ngai, kaka mpo na mwa ntango,+ kasi nakoyokela yo mawa na motema boboto mpo na ntango oyo etyami ndelo te,”+ Mosikoli na yo,+ Yehova, alobi bongo.
9 “Mpo na ngai, oyo ezali lokola mikolo ya Noa.+ Ndenge nalapaki ndai ete mai ya Noa ekoleka na mabele lisusu te,+ ndenge yango mpe nalapi ndai ete nakosilikela yo te mpe nakopamela yo te.+
10 Mpo bangomba ekoki kolongolama, mpe bangomba mike ekoki kotengatenga,+ kasi motema boboto na ngai ekolongolama epai na yo te,+ kondimana na ngai ya kimya mpe ekotengatenga te,”+ Yehova, Ye oyo azali koyokela yo mawa,+ alobi bongo.
11 “Ee mwasi oyo amoni mpasi,+ oyo abɛtami na mopɛpɛ makasi,+ oyo azangi kobɔndisama,+ talá nazali kotya mabanga na yo na pɔtɔpɔtɔ ya makasi,+ mpe nakotya moboko na yo+ na mabanga ya safire.+
12 Mpe nakosala madusu oyo bakatakatá na bifelo na yo na mabanga ya rubi, mpe baporte na yo na mabanga ya motane oyo ezali kongɛnga,+ mpe bandelo na yo nyonso na mabanga ya kitoko mingi.
13 Mpe bana na yo nyonso+ bakozala bato oyo Yehova ateyi,+ mpe bana na yo bakozala na kimya mingi.+
14 Okopikama makasi na boyengebene.+ Okozala mosika na monyoko+—mpo okobanga ata monyoko moko te—mpe mosika na eloko nyonso oyo ezali kobangisa, mpo ekobɛlɛma na yo te.+
15 Soki moto abundi na yo, ngai moto napesi mitindo te.+ Moto nyonso oyo akobunda na yo akokwea mpenza mpo na yo.”+
16 “Talá! Ngai moko nde nazalisi moto oyo ayebi malamu misala ya mabɔkɔ, moto oyo azali kopelisa mɔtɔ ya makala+ na mopɛpɛ+ mpe azali kobimisa ebundeli, mosala oyo ye asali. Mpe ngai moko nde nazalisi mobebisi+ mpo na mosala ya kobebisa.
17 Ebundeli nyonso oyo ekosalema mpo na kobunda na yo ekolonga te,+ mpe okokweisa lolemo nyonso oyo ekotɛlɛmɛla yo na lisambisi.+ Yango nde libula ya basaleli ya Yehova,+ mpe boyengebene na bango euti na ngai,” yango nde liloba ya Yehova.+