Yisaya 53:1-12

53  Nani andimeli likambo oyo toyoki?+ Bongo lobɔkɔ ya Yehova+ emonisami epai ya nani?+  Mpe akobima lokola mwa nzete+ liboso ya moto, mpe lokola mosisa oyo ezali kobima na mokili oyo ezangá mai. Azali engambe te, na nkembo mpe te;+ mpe ntango tokomona ye, lolenge na ye ekopesa biso mposa ya kolinga ye te.+  Azalaki kotyolama mpe bato bazalaki kokima ye,+ moto oyo asengelaki komona mpasi mpe komesana na maladi.+ Mpe ezalaki lokola nde tozali koboya kotala elongi ya moto moko boye.+ Atyolamaki, mpe tomonaki ye mpamba.+  Ya solo, amemaki nde bamaladi na biso;+ mpe akumbaki bampasi na biso.+ Kasi biso tomonaki ete azali moto oyo Nzambe apesi etumbu,+ abɛti+ mpe amonisi mpasi.+  Kasi atɔbɔlamaki+ mpo na misala na biso ya kobuka mibeko;+ anyatamaki mpo na mabunga na biso.+ Etumbu oyo esengelaki mpo na kimya na biso ezalaki likoló na ye,+ mpe mpo na bampota+ na ye tobiki.+  Tozalaki koyengayenga biso nyonso lokola bampate;+ tozalaki kobaluka moto na moto na nzela na ye moko; mpe Yehova ye moko asali ete libunga na biso nyonso ekwela moto wana.+  Batyaki ye mpanzi likoló mingi,+ mpe atikaki bámonisa ye mpasi;+ kasi afungolaki monɔkɔ te. Bamemaki ye lokola mpate oyo ekei kobomama,+ mpe lokola mpate ya mwasi oyo elelaka te liboso ya bakati-nsuki na yango, ye mpe afungolaki monɔkɔ te.+  Basambisaki ye na bosembo te yango wana anyokwamaki mpe alongolamaki;+ mpe nani akoluka koyeba makambo ya libota na ye?+ Mpo alongolamaki+ na mokili ya bato ya bomoi.+ Abɛtamaki kobɛtama+ mpo bato na ngai babukaki mibeko.+  Mpe ntango akokufa, akosala lilita na ye esika moko na bato mabe,+ mpe esika moko na bazwi,+ atako asalaki mobulu te+ mpe lokuta ezalaki na monɔkɔ na ye te.+ 10  Kasi Yehova ye moko asepelaki konyata ye;+ akómisaki ye moto ya maladi.+ Soki okómisi molimo na ye likabo ya ngambo,+ akomona bana na ye,+ akoyeisa mikolo na ye molai,+ mpe na lobɔkɔ na ye, likambo oyo esepelisaka+ Yehova ekolonga.+ 11  Mpo na mpasi ya molimo na ye, akomona bolamu,+ akotonda.+ Na nzela ya boyebi na ye, moyengebene, mosaleli na ngai,+ akomemela bato mingi ezaleli ya boyengebene;+ mpe ye moko akomema mabunga na bango.+ 12  Yango wana nakopesa ye likabo elongo na ebele ya bato,+ mpe na bato ya nguya nde akokabola biloko oyo epunzami,+ mpamba te asopaki molimo na ye kino na liwa,+ mpe atángamaki nde elongo na bato oyo babukaka mibeko;+ mpe ye moko amemaki lisumu ya bato ebele,+ mpe akómaki kokɔtela bato oyo babukaka mibeko.+

Maloba na nse