Yisaya 51:1-23

51  “Bóyoka ngai, bino baoyo bozali kolanda boyengebene,+ bino baoyo bozali koluka komona Yehova.+ Bótala libanga+ epai bapapolaki bino, mpe lidusu ya libulu epai babimisaki bino.  Bótala Abrahama+ tata+ na bino ná Sara+ oyo nsukansuka abotaki bino na mpasi. Mpo Abrahama azalaki kaka ye moko ntango nabengaki ye,+ mpe napambolaki ye mpe nakómisaki ye mingi.+  Mpo Yehova akobɔndisa mpenza Siona.+ Ya solo, akobɔndisa bisika na ye nyonso oyo ebebisamá,+ mpe akokómisa esobe na ye lokola Edene+ mpe mokili patatalu na ye oyo ekauká lokola elanga ya Yehova.+ Nsai monene mpe esengo ekomonana kuna, matɔndi mpe mongongo ya mondule.+  “Ee bino bato na ngai, bótyela ngai likebi; mpe bino etuluku ya bato ya ekólo na ngai,+ bótya litoi epai na ngai. Mpo mobeko ekobima epai na ngai,+ mpe nakotya ekateli na ngai ya lisambisi ezala pole ya bato ya bikólo.+  Boyengebene na ngai ezali pene.+ Lobiko+ na ngai ekobima mpenza, mpe mabɔkɔ na ngai ekosambisa bato ya bikólo.+ Bisanga ekotyela ngai elikya;+ mpe ekozela lobɔkɔ na ngai.+  “Bótombola miso na bino likoló,+ mpe bótala mabele na nse. Mpo likoló ekopanzana lokola molinga+ mpe mabele ekonzuluka lokola elamba,+ mpe bato oyo bafandi wana bakokufa lokola ngungi. Kasi lobiko na ngai, ekozala mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+ mpe boyengebene na ngai ekobukana te.+  “Bóyoka ngai, bino baoyo boyebi boyengebene, bato oyo mobeko na ngai ezali na motema na bango.+ Nsɔni ya bato—bawei mpamba—bóbanga yango te, mpe bózala na nsɔmɔ te mpo na maloba na bango ya kofinga.+  Mpo ndɔngɛ ekolya bango lokola elamba, mpe ndɔngɛ oyo elyaka bilamba ekolya bango lokola lɛnɛ.+ Kasi boyengebene na ngai ekozala mpo na ntango oyo etyami ndelo te, mpe lobiko na ngai kino mabota oyo motángo na yango eyebani te.”+  Ee lobɔkɔ ya Yehova+ lamuká, lamuká, latá bokasi!+ Lamuká lokola na mikolo ya kala, lokola na ntango ya mabota ya bantango ya kala.+ Ezali yo te moto obukabukaki Rahaba,+ yo te moto otɔbɔlaki nyama ya nsɔmɔ ya mbu?+ 10  Ezali yo te moto okaukisaki mbu, mai ya bozindo monene?+ Yo te moto okómisaki bozindo ya mbu nzela mpo bato oyo basikolami bákatisa?+ 11  Bongo basikolami ya Yehova bakozonga mpe bakoya mpenza na Siona na koganga ya esengo,+ mpe esengo mpo na ntango oyo etyami ndelo te ekozala likoló ya motó na bango.+ Bakokóma na nsai monene mpe na esengo.+ Mawa mpe kokimela ekokima mpenza.+ 12  “Ngai—ngai moko nazali Moto oyo azali kobɔndisa bino.+ “Yo nani mpo obanga moto—mowei mpamba—oyo akokufa,+ mpe mwana ya bato oyo akokóma lokola matiti mpamba ya mobesu?+ 13  Mpo obosana mpe Yehova Mokeli+ na yo, Moto oyo atandaki likoló+ mpe atyaki moboko ya mabele,+ bongo ozalaki na nsɔmɔ ntango nyonso, mokolo mobimba, mpo na nkanda makasi ya ye oyo azalaki kotya yo nkaka,+ lokola nde amibongisaki mpo na kobebisa yo?+ Bongo wapi nkanda makasi ya moto oyo azalaki kotya yo nkaka?+ 14  “Moto oyo agunzami na minyɔlɔlɔ akofungolama nokinoki,+ mpo akende na libulu te, na liwa,+ mpe mpo limpa na ye ezanga te.+ 15  “Kasi ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo atombokisaka mbu mpo mbonge na yango ezala na yikiyiki.+ Yehova ya mampinga nde nkombo na ye.+ 16  Mpe nakotya maloba na ngai na monɔkɔ na yo,+ mpe nakozipa yo na elili ya lobɔkɔ na ngai,+ mpo na kolona likoló+ mpe kotya moboko ya mabele+ mpe koloba na Siona ete: ‘Bozali bato na ngai.’+ 17  “Ee Yerusaleme, lamuká, lamuká, tɛlɛmá,+ yo oyo omɛli na lobɔkɔ ya Yehova kɔpɔ ya nkanda makasi na ye.+ Kɔpɔ ya monene, kɔpɔ oyo epesaka kizunguzungu, omɛli yango, osilisi yango.+ 18  Na bana+ nyonso oyo ye aboti, ata moko te atambwisaki ye, mpe na bana nyonso oyo ye abɔkɔli, ata moko te asimbaki lobɔkɔ na ye.+ 19  Makambo oyo mibale esilaki kokwela yo.+ Kopunzama ná kobukana, nzala ná mopanga!+ Nani akoya kotala yo na mawa na yo?+ Nani akobɔndisa yo?+ 20  Bana na yo bakosenzwa.+ Balalilali na ebandeli ya babalabala lokola bampate ya zamba na kati ya monyama,+ lokola bato oyo nkanda makasi ya Yehova+ ná mpamela ya Nzambe na yo, esopaneli bango mpenza.”+ 21  Na yango, nabondeli yo, yoká likambo oyo, Ee mwasi+ oyo amoni mpasi mpe alangwe, kasi vinyo te.+ 22  Talá oyo Nkolo na yo, Yehova, ɛɛ Nzambe na yo, oyo azali kobundela+ bato na ye, alobi: “Talá! Nakolongola na lobɔkɔ na yo kɔpɔ oyo epesaka kizunguzungu.+ Kɔpɔ ya monene, kɔpɔ na ngai ya nkanda makasi—okomɛla yango lisusu te.+ 23  Mpe nakotya yango na lobɔkɔ ya baoyo bazali kosilikisa yo,+ baoyo balobi na molimo na yo ete: ‘Gumbamá mpo tókatisa,’ bongo ozalaki kokómisa mokɔngɔ na yo lokola mabele, mpe lokola balabala mpo na baoyo bazali kokatisa.”+

Maloba na nse