Yisaya 50:1-11
50 Talá oyo Yehova alobi: “Wapi mokanda ya koboma libala+ ya mama na bino, oyo nabenganaki?+ To natɛkaki bino epai ya nani na kati ya badefisi na ngai?+ Talá! Botɛkamaki mpo na mabunga na bino moko,+ mpe babenganaki mama na bino mpo na misala na bino ya kobuka mibeko.+
2 Mpo na nini, ntango nayaki, moto azalaki te?+ Ntango nabengaki, ata moto moko te ayanolaki?+ Lobɔkɔ na ngai ekómi nde mokuse mpe ekoki kosikola te,+ to ngai nazangi nde nguya ya kobikisa? Talá! Na mpamela+ na ngai nakaukisaka mbu;+ nakómisaka bibale esobe.+ Mbisi na yango elumbaka nsolo mabe mpo mai ezali te, mpe ekufaka na mposa ya mai.+
3 Nalatisaka likoló molili,+ mpe nazipaka yango na ngɔtɔ.”+
4 Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso apesi ngai lolemo ya bato oyo bateyami,+ mpo nayeba ndenge ya koloba mpo na kobɔndisa moto oyo alɛmbi.+ Alamwisaka ntɔngɔ na ntɔngɔ; alamwisaka litoi na ngai mpo nayoka lokola bato oyo bateyami.+
5 Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso afungolaki litoi na ngai, mpe ngai natombokaki te.+ Nabalukaki na ngámbo mosusu te.+
6 Napesaki mokɔngɔ na ngai na baoyo babɛtaka, mpe matama+ na ngai na baoyo bapikolaka nsuki. Nabombaki elongi na ngai te ntango bafingaki ngai mpe babwakelaki ngai nsoi.+
7 Kasi Yehova Nkolo Mo-konzi-Oyo-Aleki-Nyonso ye moko akosalisa ngai.+ Yango wana nakoyoka nsɔni te. Yango wana natye elongi na ngai lokola libanga ya silekise, mpe nayebi ete nakoyoka nsɔni te.+
8 Moto oyo azali kotánga ngai moyengebene azali pene.+ Nani akoki kobunda na ngai? Tótɛlɛma elongo.+ Nani moto oyo nazali kosamba na ye likambo?+ Abɛlɛma na ngai.+
9 Talá! Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso ye moko akosalisa ngai. Bongo nani akoki kotánga ngai moto mabe?+ Talá! Bango nyonso bakonzuluka lokola elamba.+ Ndɔngɛ ekolya bango.+
10 Nani na kati na bino azali kobanga+ Yehova, azali koyoka mongongo ya mosaleli na ye,+ oyo atamboli na molili ya ntango nyonso+ mpe oyo amonaka kongɛnga te? Atyela nkombo ya Yehova motema+ mpe atalelaka Nzambe na ye.+
11 “Talá! Bino nyonso oyo bozali kopelisa mɔtɔ, bozali kobimisa mintentei, bótambola na pole ya mɔtɔ na bino, mpe na kati ya mintentei oyo bobimisi. Eloko oyo bokozwa mpenza na lobɔkɔ na ngai yango oyo: Bokolala na kati ya mpasi mpenza.+