Yisaya 5:1-30

5  Tiká nayembela moto oyo nalingaka loyembo. Ezali loyembo ya moto oyo nalingaka, oyo nakoyemba mpo na elanga na ye ya vinyo.+ Moto oyo nalingaka azalaki na elanga ya vinyo na mopanzi ya ngomba moko moke oyo ebotaka malamu.  Mpe atimolaki yango mpe alongolaki yango mabanga mpe alonaki kuna nzete ya vinyo ya motane ya kitoko koleka, mpe atongaki linɔ́ngi moko na katikati na yango.+ Atimolaki mpe ekamwelo moko ya vinyo kati na yango.+ Mpe azalaki kolikya ete ekobota bambuma ya vinyo ya malamu,+ kasi nsukansuka ebotaki nde bambuma ya vinyo ya mabe.+  “Bongo sikoyo, Ee bino bato oyo bofandi na Yerusaleme mpe bino bato ya Yuda, nabondeli bino, bókata likambo na ngai ná elanga na ngai ya vinyo.+  Eloko nini lisusu nasengeli kosalela elanga na ngai ya vinyo oyo nasali naino te kuna?+ Mpo na nini nalikyaki ete ekobota bambuma ya vinyo, kasi nsukansuka ebotaki bambuma ya vinyo ya zamba?  Bongo sikoyo, tiká nayebisa bino oyo nakosala elanga na ngai ya vinyo: Bakolongola lopango na yango,+ mpe ekotumbama mpenza.+ Bakobuka efelo na yango ya mabanga, mpe ekokóma mpenza esika ya konyatanyata.+  Mpe nakokómisa yango eloko oyo ebebisami.+ Bakopapa banzete na yango te, bakolongola matiti na yango mpe te.+ Mpe ekobimisa mwa nzete ya nzubɛ mpe matiti mabe;+ mpe nakopesa mapata etinda ete etika konɔkisela yango mbula.+  Mpo elanga ya vinyo+ ya Yehova ya mampinga ezali ndako ya Yisraele, mpe bato ya Yuda bazali elanga oyo azalaki kolinga mingi.+ Mpe azalaki kolikya ete akomona bosembo,+ kasi talá! kobuka mibeko; azalaki kolikya ete akomona boyengebene, kasi talá! komilelalela.”+  Mawa na baoyo bazali kobakisa bandako na bandako na bango,+ mpe baoyo bazali kobakisa bilanga na bilanga na bango kino esika ezali lisusu te+ mpe bokómi kofanda bino moko na katikati ya mokili!  Na matoi na ngai, Yehova ya mampinga alapi ndai ete bandako mingi, atako ezali minene mpe malamu, ekokóma eloko ya kokamwa mpenza, moto ata moko te akofanda kuna.+ 10  Mpo ektare+ minei ya elanga ya vinyo ekobimisa kaka bati moko,+ mpe homɛrɛ moko ya mboto ekobimisa kaka efa moko.+ 11  Mawa na baoyo bazali kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpo na koluka masanga oyo elangwisaka,+ baoyo bazali koumela tii na molili ya mpokwa, bongo vinyo ekómi kopela lokola mɔtɔ na kati na bango!+ 12  Mpe nzɛnzɛ, ebɛtɛlo ya nsinga, mbonda moke ná piololo, ná vinyo ezali ntango nyonso na bafɛti na bango;+ kasi bazali kotala mosala ya Yehova te, mpe bamoni mosala ya mabɔkɔ na ye te.+ 13  Na yango, bato na ngai bakomemama na mboka mopaya, mpo bazangi boyebi;+ mpe bato na bango ya nkembo bakozala bato oyo bazali kokufa na nzala,+ mpe ebele ya bato na bango bakokauka na mposa ya mai.+ 14  Na yango, Nkunda* ekómisi molimo na yango monene mpe efungoli monɔkɔ na yango monene koleka ndelo;+ mpe oyo ezali kitoko na engumba yango ekokita mpenza kuna, bakisa mpe ebele ya bato na yango ná yikiyiki na yango ná moto oyo azali kosepela mingi.+ 15  Mpe moto ya mabele akogumbama, mpe moto akokita na nse, mpe ata miso ya baoyo batombwami ekokita na nse.+ 16  Mpe Yehova ya mampinga akotombwama na nzela ya lisambisi,+ mpe Nzambe ya solo, Mosantu,+ akomisantisa mpenza na nzela ya boyengebene.+ 17  Mpe bana-mpate ya mibali bakolya lokola na esika na bango ya kolya matiti; mpe bato oyo bafandi bapaya bakolya bisika oyo etikalá mpamba ya banyama oyo eleisami malamu.+ 18  Mawa na baoyo bazali kobenda libunga na bansinga ya bokosi, mpe bazali kobenda lisumu lokola na nsinga ya pusu;+ 19  baoyo bazali koloba boye: “Mosala na ye esala noki; eya mbangu, mpo tómona yango; mpe mokano ya Mosantu ya Yisraele ebɛlɛma mpe eya, mpo tóyeba yango!”+ 20  Mawa na baoyo bazali koloba ete malamu ezali mabe mpe mabe ezali malamu,+ baoyo bazali kotya molili na esika ya pole mpe pole na esika ya molili, baoyo bazali kotya bololo na esika ya elɛngi mpe elɛngi na esika ya bololo!+ 21  Mawa na baoyo bazali na bwanya na miso na bango moko mpe na mayele na bilongi na bango moko!+ 22  Mawa na baoyo bazali bilombe ya komɛla vinyo, mpe na bato oyo bazali na nguya ya bomoi mpo na kosangisa masanga oyo elangwisaka,+ 23  baoyo bazali kotánga moto mabe moyengebene mpo na kanyaka,+ mpe baoyo bazali kutu kolongola moyengebene boyengebene na ye!+ 24  Yango wana, se ndenge lolemo ya mɔtɔ elyaka matiti ya blé+ mpe matiti oyo ekauká ezindaka na kati ya ndemo ya mɔtɔ, ekumu ya misisa na bango ekokóma lokola nsolo moko ya mabe,+ mpe fololo na bango ekomata lokola pudre, mpo baboyi mobeko ya Yehova ya mampinga,+ mpe bazangi limemya na liloba ya Mosantu ya Yisraele.+ 25  Yango wana nkanda ya Yehova epeleli bato na ye, mpe akosembolela bango lobɔkɔ na ye mpe akobɛta bango.+ Mpe bangomba ekoningana,+ mpe bibembe na bango ekokóma lokola bosɔtɔ na katikati ya babalabala.+ Mpo na makambo oyo nyonso, nkanda na ye ezongi nsima te, kasi lobɔkɔ na ye esembolami kaka. 26  Mpe atɛlɛmisi elembo epai ya ekólo moko monene na mosika,+ mpe abɛtɛli yango piololo na nsuka ya mabele;+ mpe talá! ekoya nokinoki, na lombangu.+ 27  Kati na bango ezali na moto moko te oyo alɛmbi to oyo azali kobɛta libaku. Moto moko te azali koyoka mpɔngi to moto moko te azali kolala. Mpe ya solo, mokaba oyo ezingi loketo na bango ekofungwama te, bansinga ya basandale na bango ekokatana mpe te; 28  mpo makula na bango esebisami mpe matimbo na bango nyonso egumbami.+ Bakokanisa ete basabo ya bampunda na bango ezali libanga ya silekise,+ mpe bayiká na bango mopɛpɛ makasi.+ 29  Koganga na bango ezali lokola oyo ya nkɔsi, mpe bazali koganga lokola bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.+ Mpe bakonguluma mpe bakokanga nyama ya kolya mpe bakomema yango kozanga kobanga, mpe mobikisi akozala te.+ 30  Mpe na mokolo yango, bakonguluma likoló na yango lokola konguluma ya mbu.+ Mpe ya solo, bakotalatala mokili, mpe talá! ezali na molili ya nsɔmɔ;+ mpe ata pole ekómi molili mpo na matangá oyo ezali kokwela yango.

Maloba na nse

To, “Sheole.” Talá Ap 4.