Yisaya 49:1-26

49  Bino bisanga,+ bóyoka ngai, mpe bótya likebi, bino bituluku ya bato ya bikólo kuna mosika.+ Yehova ye moko abengá ngai+ banda na libumu.+ Atángá nkombo na ngai banda na libumu ya mama na ngai.+  Mpe akómisaki monɔkɔ na ngai lokola mopanga ya mino.+ Abombaki ngai na elili+ ya lobɔkɔ na ye.+ Nsukansuka, akómisaki ngai likula oyo epeli. Abombaki ngai na libenga na ye ya makula.  Mpe alobaki lisusu na ngai boye: “Ee Yisraele, ozali mosaleli na ngai,+ yo moto oyo nakomonisa kitoko na ngai na nzela na yo.”+  Kasi ngai nalobaki ete: “Nabomi nzoto kaka mpamba.+ Nabebisaki nguya na ngai mpo na eloko moko ya solo te mpe mpo na mpamba.+ Ya solo Moto oyo azali kosambisa ngai ezali Yehova,+ mpe Nzambe na ngai nde Moto oyo azali kofuta ngai.”+  Mpe sikoyo Yehova, Moto oyo akelaki ngai banda na libumu mpo nazala mosaleli na ye,+ alobi ete ngai nazongisela ye Yakobo,+ mpo Yisraele eyanganisama epai na ye.+ Mpe nakokumisama na miso ya Yehova, mpe Nzambe na ngai akokóma bokasi na ngai.  Bongo alobaki boye: “Ezali mpenza likambo ya mpamba te ndenge okómi mosaleli na ngai mpo otɛlɛmisa mabota ya Yakobo mpe mpo ozongisa ata bato ya Yisraele oyo babatelami;+ mpe napesi yo mpo ozala pole ya bikólo,+ mpo lobiko na ngai ekóma tii na nsuka ya mabele.”+  Talá oyo Yehova, Mosikoli ya Yisraele,+ Mosantu na ye, alobi na ye oyo atyolami mpenza,+ na ye oyo ayinami na ekólo,+ na mosaleli ya bayangeli:+ “Bakonzi bango moko bakomona mpe bakotɛlɛma mpenza,+ ná bankumu mpe bakogumbama, mpo na Yehova, moto ya sembo,+ Mosantu ya Yisraele oyo azali kopona yo.”+  Talá oyo Yehova alobi: “Na ntango oyo nazali komonisa boboto nayanoli yo,+ mpe na mokolo moko ya lobiko nasalisi yo;+ mpe nazalaki kobatela yo mpo napesa yo lokola kondimana mpo na bato ya ekólo,+ mpo na kobongisa lisusu mokili,+ mpo na kosala ete mabula oyo etikalá mpamba ekóma lisusu ya bango,+  mpo na koloba na bato ya bolɔkɔ+ ete: ‘Bóbima!’+ na baoyo bazali na molili+ ete: ‘Bómonana!’+ Bakolya matiti pembenipembeni ya banzela, mpe bisika na bango ya kolya matiti ekozala na banzela nyonso epai bato balekalekaka.+ 10  Bakozala na nzala te,+ bakozala mpe na mposa ya mai te,+ mpe molunge oyo ezali kozikisa to moi ekobɛta bango te.+ Mpo Moto oyo azali koyokela bango mawa akokamba bango,+ mpe akotambwisa bango pene na maziba ya mai.+ 11  Mpe nakokómisa bangomba na ngai nyonso nzela, mpe babalabala na ngai ya minene ekozala na esika oyo etombwani.+ 12  Talá! Baoyo bakouta mosika,+ mpe talá! baoyo bakouta na nɔrdi+ mpe na wɛsti,+ mpe baoyo na mokili ya Sinime.” 13  Yo likoló, gangá na esengo,+ mpe yo mabele, zalá na esengo.+ Bangomba esepela mpe eganga na esengo.+ Mpo Yehova abɔndisi bato na ye,+ mpe azali koyokela bato na ye ya mpasi mawa.+ 14  Kasi Siona azalaki se koloba: “Yehova atiki ngai,+ mpe Yehova ye moko abosani ngai.”+ 15  Mwasi akoki nde kobosana mwana na ye oyo ye azali komɛlisa mabɛlɛ mpo ayokela mwana ya libumu na ye mawa te?+ Ata basi wana bakoki kobosana,+ kasi ngai nakobosana yo te.+ 16  Talá! Nakati mayemi na yo na mabɔkɔ na ngai.+ Bifelo na yo ezali liboso na ngai ntango nyonso.+ 17  Bana na yo basali noki. Baoyo bazali kobukabuka yo mpe kobebisa yo bakobima mpenza epai na yo. 18  Tombolá miso na yo bipai nyonso mpe talá. Bango nyonso bayanganisami.+ Bayei epai na yo. “Lokola nazali solo na bomoi,” yango nde liloba ya Yehova,+ “okolata bango nyonso lokola biloko ya kobongisa nzoto, mpe okokanga bango na nzoto na yo lokola mwasi ya libala.+ 19  Atako bisika na yo oyo ebebisamá mpe bisika na yo oyo etikalá mpamba mpe mokili ya bitiká na yo ezali,+ atako sikoyo ozali nkaka mpenza mpe bato bakoki kofanda wana te, mpe baoyo bazalaki komɛla yo bakei mosika,+ 20  bana na yo ya ntango oyo ozangi bana+ bakoloba na matoi na yo ete: ‘Esika ekómi nkaka mpenza na miso na ngai.+ Pesá ngai esika nafanda.’+ 21  Mpe ya solo okoloba na motema na yo ete: ‘Mobali nini aboteli ngai bana oyo nyonso, ngai ko mwasi oyo bazangisá bana mpe ekomba, oyo bamemá na mboka mopaya mpe moto ya bolɔkɔ?+ Bongo baoyo, nani abɔkɔli bango?+ Talá! Batikaki ngai kaka ngai moko.+ Baoyo boye—bazalaki wapi?’”+ 22  Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Talá! Nakotombolela bikólo lobɔkɔ na ngai,+ mpe nakotombolela bato ya bikólo elembo na ngai.+ Mpe bakoya na bana na yo ya mibali na ntolo, mpe bakomema bana na yo ya basi na mapeka.+ 23  Mpe bakonzi bakokóma mpenza babɔkɔli na yo,+ mpe bana basi ya bakonzi yango bakozala basi oyo bakomɛlisa yo. Bakogumbamela yo bilongi na nse,+ mpe bakolɛmbɔla putulu ya makolo na yo;+ mpe okoyeba mpenza ete nazali Yehova, oyo baoyo batyelaka ngai elikya bakoyoka nsɔni te.”+ 24  Baoyo basili kozwama, bakoki nde kolongolama epai ya moto ya nguya,+ to etuluku ya bato oyo bakangami na monyokoli ekoki nde kokima?+ 25  Kasi talá oyo Yehova alobi: “Ata etuluku ya bato oyo bakangami na moto ya nguya ekolongolama,+ mpe baoyo basili kozwama na monyokoli bakokima.+ Mpe ngai moko nakobunda na moto nyonso oyo azali kobunda na yo,+ mpe ngai moko nakobikisa bana na yo.+ 26  Mpe baoyo bazali komonisa yo mpasi nakoleisa bango mosuni na bango moko; mpe bakolangwa makila na bango moko lokola nde vinyo ya elɛngi. Mpe bato nyonso bakoyeba mpenza ete ngai Yehova+ nazali Mobikisi+ na yo mpe Mosikoli+ na yo, Oyo na Nguya ya Yakobo.”+

Maloba na nse