Yisaya 46:1-13
46 Bele+ agumbami,+ Nebo agunzami; banyama ya zamba ná banyama ya mboka ekumbi bikeko+ na bango, banyama oyo elɛmbi ememi mikumba na bango, bisaka, mokumba ya kilo.
2 Ya solo, bakogunzama; bango nyonso mpe bakogumbama mpenza; bakoki ata moke te kobikisa+ bikeko na bango, mikumba ya kilo oyo ezali komemama, kasi milimo na bango ekokende mpenza na bokangami.+
3 “Ee ndako ya Yakobo, bóyoka ngai, mpe bino nyonso bato ya ndako ya Yisraele oyo botikali,+ bino baoyo namemá banda na libumu, baoyo nakumbá banda na libumu.+
4 Kino na bobange na bino Ngai nakozala kaka ndenge nazalaka;+ mpe kino bokokóma na nsuki mpɛmbɛ, nakokoba komema bino.+ Ngai moko nakosala,+ mpo ngai moko nakumba bino mpe ngai moko namema bino mpe nabikisa bino.+
5 “Bino bokomeka ngai na nani+ to bokokómisa ngai ndenge moko na nani to bokokokanisa ngai na nani mpo ngai na ye tózala ndenge moko?+
6 Ezali na bato oyo babimisaka wolo na potɔmɔni mpe basopasopaka yango, mpe bamekaka kilo ya palata na emekeli-kilo. Bafutaka mosali bibende, bongo asalaka yango nzambe.+ Bafukamaka elongi na nse, ɛɛ, bagumbamaka.+
7 Bamemaka yango na lipeka,+ bakumbaka yango mpe batyaka yango na esika na yango mpo etɛlɛma kaka wana. Elongwaka te na esika oyo yango ɛtɛlɛmi.+ Kutu babelelaka yango, kasi eyanolaka te; ebikisaka moto na mpasi na ye te.+
8 “Bókanisa lisusu yango, mpo bózwa mpiko. Bótya yango na motema,+ bino babuki-mibeko.+
9 Bókanisa lisusu makambo ya liboso ya kalakala,+ ete nazali Nzambe+ mpe Nzambe mosusu azali te,+ mosusu oyo azali lokola ngai mpe azali te;+
10 Moto oyo banda na ebandeli ayebisaka ndenge makambo ekosuka,+ mpe banda kala makambo oyo esalemi naino te;+ Moto oyo alobaka ete: ‘Mokano na ngai ekosimba,+ mpe eloko nyonso oyo ezali kosepelisa ngai, nakosala yango’;+
11 Moto oyo azali kobenga ndɛkɛ oyo ekangaka banyama uta epai moi ebimaka,+ oyo azali kobenga moto mpo na kokokisa mokano na ngai uta na mokili ya mosika.+ Nalobi yango; nakokokisa yango.+ Nabongisi mokano yango, nakosala mpe yango.+
12 “Bóyoka ngai, bino bato ya motema makasi,+ bino bato bozali mosika na boyengebene.+
13 Nabɛlɛmisi boyengebene na ngai.+ Ezali mosika te,+ mpe lobiko na ngai ekoumela te.+ Mpe nakopesa lobiko na kati ya Siona, kitoko na ngai na Yisraele.”+