Yisaya 43:1-28

43  Bongo sikoyo Ee Yakobo, talá oyo Yehova alobi, Mozalisi na yo,+ mpe Moto oyo asalaki yo,+ Ee Yisraele: “Kobanga te, mpo nasikoli yo.+ Nabengi yo na nkombo na yo.+ Ozali wa ngai.+  Soki oleki na mai,+ nakozala elongo na yo;+ mpe soki oleki na bibale, ekozindisa yo te.+ Soki otamboli na mɔtɔ, okozika te, lolemo ya mɔtɔ mpe ekotumba yo te.+  Mpo nazali Yehova Nzambe na yo, Mosantu ya Yisraele, Mobikisi na yo.+ Napesi Ezipito ezala lisiko na yo,+ Etiopi+ mpe Seba na esika na yo.  Lokola ozali na motuya na miso na ngai,+ emonani ete ozali na lokumu, mpe ngai nalingi yo.+ Mpe nakopesa bato na esika na yo, mpe bituluku ya bato ya bikólo na esika ya molimo na yo.+  “Kobanga te, mpo nazali elongo na yo.+ Nakoya na momboto na yo uta epai moi ebimaka, mpe nakoyanganisa bino uta epai moi elalaka.+  Nakoloba na nɔrdi+ ete: ‘Tiká!’ mpe na sudi ete: ‘Kopekisa te. Yaká na bana na ngai ya mibali uta na mosika, mpe na bana na ngai ya basi uta na nsuka ya mabele,+  moto nyonso oyo abengami na nkombo na ngai+ mpe oyo nazalisá mpo na nkembo na ngai,+ oyo nakelá, ɛɛ, oyo nasalá.’+  “Bóya na bato oyo bakufá miso atako bazali na miso, mpe bato oyo bakufá matoi atako bazali na matoi.+  Bato ya bikólo báyangana esika moko, mpe bituluku ya bato ya bikólo báyangana.+ Nani na kati na bango akoki koyebisa yango?+ To bango bakoki nde koyebisa biso makambo ya liboso?+ Bábimisa batatoli na bango,+ mpo bátángama bayengebene, to báyoka mpe báloba ete: ‘Ezali solo!’”+ 10  “Bino bozali batatoli na ngai,”+ yango nde liloba ya Yehova, “ɛɛ mosaleli na ngai oyo naponi,+ mpo bóyeba+ mpe bóndimela ngai,+ mpe bókanga ntina ete Ngai nazali kaka ndenge nazalaka.+ Liboso na ngai Nzambe moko te asalemaki,+ mpe nsima na ngai mosusu azali te.+ 11  Ngai—nazali Yehova,+ mpe longola ngai mobikisi mosusu azali te.”+ 12  “Ngai moko nasakoli mpe nabikisi mpe nayebisi yango,+ wana nzambe mopaya ata moko te azalaki na kati na bino.+ Yango wana, bino bozali batatoli na ngai,”+ yango nde liloba ya Yehova, “mpe ngai nazali Nzambe.+ 13  Lisusu, ntango nyonso Ngai nazali kaka ndenge nazalaka;+ mpe moto moko te akoki kobikisa na lobɔkɔ na ngai.+ Nakosala,+ mpe nani akoki kozongisa lobɔkɔ na ngai nsima?”+ 14  Talá oyo Yehova, Mobikisi na bino,+ Mosantu ya Yisraele,+ alobi: “Mpo na bino, nakotinda bato na Babilone mpe nakokitisa bikangiseli ya bolɔkɔ,+ mpe nakokitisa Bakaladea na bamasuwa mpe bakoganga na kolela.+ 15  Nazali Yehova Mosantu na bino,+ Mozalisi ya Yisraele,+ Mokonzi na bino.”+ 16  Talá oyo Yehova alobi, ye Moto asalaka nzela na mbu mpe balabala na mai ya makasi,+ 17  ye Moto abimisaka na mbala moko likalo ya etumba mpe mpunda, limpinga ya basoda mpe bato ya makasi:+ “Bakolala na nse.+ Bakotɛlɛma te.+ Bakobomama mpenza.+ Bakobomama lokola nsinga ya lini ya mwinda.”+ 18  “Bókanisa makambo ya liboso lisusu te, mpe bótya likebi na bino na makambo ya kala te. 19  Talá! Nazali kosala likambo moko ya sika.+ Sikoyo elingi kobima. Bokoyeba yango, boye te?+ Ya solo mpenza, nakotya nzela na esobe,+ bibale na mokili ekauká.+ 20  Nyama ya zamba oyo efandaka na esobe, bambulú ná bamaligbanga+ ekokumisa ngai;+ mpo nakopesa mai ata na esobe, bibale na mokili ekauká,+ mpo na komɛlisa bato na ngai, moto oyo naponi,+ 21  bato oyo nasalá mpo na ngai moko, mpo báyebisa lisanzoli na ngai.+ 22  “Kasi obengi ngai te, Ee Yakobo,+ mpo olɛmbi ngai, Ee Yisraele.+ 23  Omemeli ngai te bampate ya makabo na yo ya kotumba mobimba, mpe okumisi ngai te na bambeka na yo.+ Natindi yo te ete osalela ngai na likabo, nalɛmbisi yo mpe te na olibana.+ 24  Osombeli ngai nkokó ya nsolo mpimbo+ na mbongo te; mpe otondisi ngai te na mafuta ya bambeka na yo.+ Ya solo mpenza, opusi ngai nasala mpo na masumu na yo; olɛmbisi ngai na mabunga na yo.+ 25  “Ngai—Ngai nde Moto nazali kosilisa+ misala na yo ya kobuka mibeko+ mpo na ngai moko,+ mpe nakokanisa lisusu masumu na yo te.+ 26  Kundolelá ngai; tósamba;+ lobá likambo ndenge oyebi yango mpo ozala na elonga.+ 27  Tata na yo, oyo ya liboso, asali lisumu,+ mpe balobeli na yo moko babuki mobeko na ngai.+ 28  Yango wana, nakokómisa bankumu ya esika mosantu eloko mpamba, mpe nakokaba Yakobo lokola moto oyo asengeli kobebisama, mpe Yisraele na maloba ya kofinga.+

Maloba na nse