Yisaya 41:1-29
41 “Bózala nyɛɛ liboso na ngai, bino bisanga;+ mpe tiká bituluku ya bato ya bikólo+ bázwa nguya ya sika. Bábɛlɛma.+ Báloba na ntango yango. Biso nyonso tópusana pene mpo na lisambisi.+
2 “Nani alamwisi moto moko kuna epai moi ebimaka?+ Nani oyo, na boyengebene, abengi ye alanda makolo na Ye, mpo na kopesa bikólo liboso na ye, mpe mpo na kotinda ye atya bakonzi na nse na ye?+ Nani azali se kopesa bango lokola putulu na mopanga na ye, bongo bamemami epai na epai na litimbo na ye lokola matiti mpamba ya blé?+
3 Nani azali se kolanda bango, azali se koleka na kimya na makolo na nzela oyo ayaki te?
4 Nani azali kosala+ mpe asali yango, abengi mabota banda na ebandeli?+
“Ngai, Yehova, Moto ya Liboso;+ mpe epai ya baoyo bakoya nsima, nakozala kaka ndenge nazalaka.”+
5 Bisanga+ emonaki mpe ebandaki kobanga. Bansuka ya mabele ebandaki kolɛnga.+ Epusanaki pene mpe ezalaki se koya.
6 Moto na moto azalaki kosalisa moninga na ye, mpe moto azalaki koloba na ndeko na ye ete: “Zalá makasi.”+
7 Bongo moto oyo ayebi malamu misala ya mabɔkɔ azalaki kolendisa mosali bibende;+ moto oyo ayeisaka biloko sɛlisɛli na marto ya kotulela azalaki kolendisa moto oyo azalaki kobɛta marto na elondo, alobi mpo na sudire ete: “Ezali malamu.” Nsukansuka, moto moko akangisaki yango makasi na nsɛtɛ mpo eningana te.+
8 “Kasi yo, Ee Yisraele, ozali mosaleli na ngai,+ Ee Yakobo, oyo naponá,+ momboto ya Abrahama+ moninga na ngai;+
9 oyo nazwá na nsuka ya mabele,+ mpe oyo nabengá uta na nsukansuka na yango mpenza.+ Bongo nalobaki na yo ete: ‘Ozali mosaleli na ngai;+ naponá yo,+ mpe nabwaki yo te.+
10 Kobanga te, mpo nazali na yo.+ Kotala epai na epai te, mpo nazali Nzambe na yo.+ Nakopesa yo makasi.+ Nakosalisa yo mpenza.+ Nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali+ ya boyengebene.’+
11 “Talá! Baoyo nyonso bazali kosilikela yo bakoyoka nsɔni mpe bakosambwa.+ Bato oyo bazali koswanisa yo bakokóma eloko mpamba mpe bakokufa.+
12 Bato oyo bazali kobunda na yo, okoluka bango, kasi okomona bango te.+ Bato oyo bazali kobunda na yo etumba bakokóma lokola eloko oyo ezali te mpe lokola eloko mpamba.+
13 Mpo ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali,+ ngai Moto nazali koloba na yo ete: ‘Kobanga te.+ Ngai moko nakosalisa yo.’+
14 “Kobanga te, yo Yakobo mosɔpi,+ bino bato ya Yisraele.+ Ngai moko nakosalisa bino,” yango nde liloba ya Yehova, ɛɛ Mosikoli na yo,+ Mosantu ya Yisraele.
15 “Talá! Nakómisi yo likalo ya kotutela,+ eloko ya kotutela ya sika, ya minomino. Okonyatanyata bangomba mpe okobuka yango; mpe okokómisa bangomba mike lokola mposo ya blé.+
16 Okopupola+ yango, mpe mopɛpɛ ekomema yango,+ mpe mopɛpɛ makasi ekomema yango na banzela ndenge na ndenge.+ Mpe yo, okosepela na Yehova.+ Okomikumisa na Mosantu ya Yisraele.”+
17 “Bato ya mpasi mpe babola bazali koluka mai,+ kasi ezali te. Lolemo na bango ekauki+ na mposa ya mai.+ Ngai Yehova nakoyanola bango.+ Ngai Nzambe ya Yisraele nakotika bango te.+
18 Likoló ya bangomba mike oyo ezali polele nakofungola bibale, mpe maziba na katikati ya mabwaku ya patatalu.+ Nakokómisa esobe etima oyo etondi na matiti, mpe mokili oyo ezangá mai maziba ya mai.+
19 Na esobe nakolona nzete ya sɛdrɛ, ya akasia, ya mirte ná nzete ya mafuta.+ Na mokili patatalu oyo ekauká nakolona na mbala moko nzete ya jenevriye, ya frɛnɛ mpe ya siprɛ;+
20 mpo bato nyonso bámona mpe báyeba, bátya mpe likebi mpe bázwa mayele ya kososola, ete lobɔkɔ ya Yehova esali yango, mpe Mosantu ya Yisraele azalisi yango.”+
21 Yehova alobi: “Bóya na likambo na bino”.+ Mokonzi ya Yakobo+ alobi: “Bóbimisa makanisi na bino”.+
22 “Bóbimisa mpe bóyebisa biso makambo oyo ekosalema. Makambo ya liboso—soki ezalaki nini—bóloba, mpo motema na biso etyela yango likebi mpe tóyeba ndenge ekozala na mikolo oyo ekoya. To bóyokisa biso makambo oyo ezali koya.+
23 Bóloba makambo oyo ekoya na nsima, mpo tóyeba ete bozali banzambe.+ Ɛɛ, bosengeli kosala malamu to kosala mabe, mpo biso nyonso tótala epai na epai mpe tómona yango na mbala moko.+
24 Talá! Bozali lokola eloko oyo ezali te, mpe mosala na bino ezali eloko mpamba.+ Moto nyonso oyo azali kopona bino azali eloko oyo bayiná.+
25 “Nalamwisi moto moko uta na nɔrdi, mpe akoya.+ Uta epai moi ebimaka+ akobelela nkombo na ngai. Mpe akonyata bayangeli-basungi lokola nde bazalaki mabele ya lima+ mpe lokola moyemi-mbɛki oyo azali konyatanyata biloko ya pɔtɔpɔtɔ.
26 “Nani alobá likambo moko banda na ebandeli, mpo tóyeba, to banda na bantango ya kala, mpo tóloba: ‘Azali na elonga’?+ Ya solo, ezali na moto moko te oyo azali koyebisa yango. Ya solo, ezali na moko te oyo azali koyokisa. Ya solo, ezali na moto moko te oyo azali koyoka maloba na bino.”+
27 Ezali na moko, moto ya liboso, oyo azali koloba na Siona ete: “Talá! Bango oyo!”+ mpe nakopesa Yerusaleme momemi ya nsango malamu.+
28 Mpe nazalaki se kotala, mpe moto azalaki te; mpe kati na bango ezalaki mpe na moto moko te oyo azalaki kopesa toli.+ Mpe nazalaki se kotuna bango, mpo bápesa eyano.
29 Talá! Bango nyonso bazali lokola eloko oyo ezali te. Misala na bango ezali mpamba. Bikeko na bango ya konyangwa ezali mopɛpɛ mpe eloko moko ya solo te.+