Yisaya 40:1-31

40  Nzambe na bino alobi: “Bóbɔndisa, bóbɔndisa bato na ngai.+  Bóloba na Yerusaleme na boboto+ mpe bóbelela ye ete mosala na ye ya soda esili,+ ete afuti libunga na ye.+ Mpo azwi na lobɔkɔ ya Yehova etumbu mobimba mpo na masumu na ye nyonso.”+  Yoká! Moto moko azali kobelela na esobe:+ “Bóbongisa nzela ya Yehova!+ Bósembolela Nzambe na biso balabala monene na mokili patatalu oyo ekauká.+  Lobwaku nyonso etombwama,+ mpe ngomba monene ná ngomba moke nyonso ekitisama.+ Mpe esika ya matutumatutu esengeli kokóma mokili ya patatalu, mpe esika ya mabulumabulu esengeli kokóma lobwaku ya patatalu.+  Mpe nkembo ya Yehova ekomonana mpenza,+ mpe bato nyonso bakomona mpenza yango na mbala moko,+ mpo monɔkɔ ya Yehova nde elobi yango.”+  Yoká! Moto moko azali koloba: “Belelá!”+ Mpe moto mosusu alobi: “Nabelela nini?” “Bato nyonso bazali matiti ya mobesu, mpe motema boboto na bango nyonso ezali lokola fololo ya esobe.+  Matiti ya mobesu ekauki, fololo elɛmbilɛmbi,+ mpo elimo ya Yehova epɛpi likoló na yango.+ Ya solo, bato bazali matiti ya mobesu.+  Matiti ya mobesu ekauki, fololo elɛmbilɛmbi;+ kasi liloba ya Nzambe na biso ekoumela seko.”+  Matá na ngomba ya molai,+ yo mwasi oyo ozali koyela Siona nsango malamu.+ Tombolá mongongo na yo makasi, yo mwasi oyo ozali koyela Yerusaleme nsango malamu.+ Tombolá yango. Kobanga te.+ Lobá na bingumba ya Yuda ete: “Nzambe na bino ye oyo.”+ 10  Talá! Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova ye moko akoya mpenza lokola moto ya makasi, mpe lobɔkɔ na ye ekoyangela mpo na ye.+ Talá! Azali na mbano ya kopesa,+ mpe lifuti oyo azali kofuta ezali liboso na ye.+ 11  Lokola mobateli ya mpate, akobatela etonga na ye moko.+ Na lobɔkɔ na ye akoyanganisa bana-mpate;+ mpe akomema yango na ntolo na ye.+ Oyo ezali komɛlisa mabɛlɛ, akotambwisa yango malɛmbɛmalɛmbɛ.+ 12  Nani ameká mai na lobɔkɔ na ye,+ mpe ameká bonene ya likoló na zerete+ mpe asangisá putulu ya mabele na emekeli moko,+ to ameká bozito ya bangomba na kilo, mpe ameká bozito ya bangomba mike na bimekeli-kilo? 13  Nani ameká bonene ya elimo ya Yehova, mpe nani oyo akoki kopesa ye toli to koyebisa ye likambo moko boye?+ 14  Apesanaki makanisi na nani mpo básalisa ye akanga ntina, to nani ateyaka ye nzela ya bosembo, to ateyaka ye boyebi,+ to ayebisaka ye nzela ya mayele ya solosolo?+ 15  Talá! Bikólo ezali lokola litangá ya mai na katini; mpe etalelami lokola mwa putulu moke likoló ya bimekeli-kilo.+ Talá! Atombolaka bisanga+ lokola mwa putulu moke mpenza. 16  Ata Libá ekoki te mpo na kobatela mɔtɔ ekoba kopela, mpe banyama na yango ya zamba+ ekoki te mpo na likabo ya kotumba mobimba.+ 17  Liboso na ye, bikólo nyonso ezali lokola ezali te;+ na miso na ye, ezali eloko mpamba mpe eloko moko ya solo te.+ 18  Bongo bokoki kokokanisa Nzambe na nani,+ mpe eloko nini bokoki kotya pembeni na ye oyo ekokani na ye?+ 19  Moto oyo ayebi malamu misala ya mabɔkɔ anyangwisi ekeko ya konyangwa,+ mpe mosali bibende azali kozipa yango na wolo,+ mpe azali kotula minyololo ya palata.+ 20  Azali kopona nzete moko mpo ezala likabo, nzete oyo epɔlá te.+ Azali koluka moto oyo ayebi malamu mosala ya mabɔkɔ, mpo na kobongisa ekeko oyo eyemami+ oyo ekotengatenga te.+ 21  Boyebi te? Boyoki te? Naino bayebisá bino yango te banda na ebandeli? Naino bosalelá mayele te banda ntango miboko ya mabele etyamaki?+ 22  Ezali na Moto oyo afandi likoló ya zolongano ya mabele,+ oyo bato na yango bazali lokola makɔnkɔ, Moto oyo atandaka likoló lokola mwa elamba ya pɛtɛpɛtɛ, oyo asembolaka yango lokola hema ya kofanda,+ 23  Moto oyo azali kokómisa bankumu eloko mpamba, oyo akómisá basambisi ya mabele lokola eloko moko ya solo te.+ 24  Naino kutu bakonami te; naino kutu balonami te; naino kutu ekumu na bango ebimisi misisa na mabele te.+ Soki kaka bafuli mopɛpɛ likoló na bango, bakauki;+ mpe mopɛpɛ makasi ekokumba bango lokola matiti ya blé.+ 25  “Kasi bino bokoki kokokanisa ngai na nani mpo nakóma ndenge moko na ye?” Mosantu alobi bongo.+ 26  “Bótombola miso na bino likoló mpe bómona. Nani azalisaki biloko oyo nyonso?+ Ezali Moto oyo abimisaka limpinga na yango na kolanda motángo na yango mpenza, abengaka yango nyonso na nkombo.+ Mpo na makasi mingi oyo azali na yango,+ mpo azali na makasi na kati ya nguya, ata moko te kati na yango ezali kozanga. 27  “Ee Yakobo, mpo na nini ozali koloba, Ee Yisraele, mpo na nini ozali kolobaloba ete: ‘Nzela na ngai ebombami liboso ya Yehova,+ mpe Nzambe na ngai azali kotalela te kokatama ya likambo na ngai’?+ 28  Naino oyebi te to naino oyoká te?+ Yehova, Mozalisi ya mabele nsuka tii nsuka, azali Nzambe mpo na libela.+ Alɛmbaka te, asilaka makasi mpe te.+ Mayele na ye ekoki kososolama te.+ 29  Apesaka nguya na moto oyo alɛmbi;+ mpe moto oyo azangi makasi,+ atondisaka ye na nguya. 30  Bana mibali bakolɛmba mpe bakosila makasi, mpe bilenge mibali bakobɛta mpenza libaku, 31  kasi baoyo bazali kotyela Yehova elikya+ bakozwa nguya ya sika.+ Bakomata likoló na mapapu lokola bampongo.+ Bakopota mbangu mpe bakosila makasi te; bakotambola mpe bakolɛmba te.”+

Maloba na nse