Yisaya 4:1-6

4  Mpe na mokolo yango, basi nsambo bakokanga mpenza mobali moko+ mpe bakoloba ete: “Tokolya limpa na biso moko mpe tokolata bilamba na biso moko; kasi tiká kaka bábenga biso na nkombo na yo mpo na kolongola nsɔni na biso.”+  Na mokolo yango, mwa nzete oyo Yehova akokolisa+ ekozala mpo na kitoko mpe mpo na nkembo,+ mpe mbuma ya mokili ekozala eloko moko ya komikumisa na yango+ mpe eloko moko kitoko mpo na bato ya Yisraele oyo babiki.+  Mpe ekosalema mpenza boye: baoyo bakotikala na Siona mpe baoyo bakotikala na Yerusaleme bakobengama basantu,+ moto nyonso oyo nkombo na ye ekomami mpo na kozala na bomoi na Yerusaleme.+  Ntango Yehova akosilisa kosukola nyɛi ya bana basi ya Siona+ mpe kopɛtola+ makila oyo Yerusaleme asopaki+ mpe kolongola yango epai na ye, na elimo ya kosambisa mpe na elimo ya kotumba,+  na moi Yehova akozalisa mpenza lipata mpe molinga, mpe na butu kongɛnga ya mɔtɔ+ oyo ezali kopela likoló ya esika oyo Ngomba Siona+ ezali mpo na libela mpe likoló ya esika ya liyangani;+ mpo esika ya komibatela ekozala likoló ya eloko nyonso ya nkembo.+  Mpe na moi, ekozala na mwa ndako ya matiti oyo ekopesa elili mpo na komibomba na molunge oyo ekaukisaka,+ mpe mpo na kozala ekimelo mpe esika ya komibomba na mopɛpɛ makasi mpe na mbula.+

Maloba na nse